Banzembo59lin_bib

Nzambe na ngai, kangola ngai

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te ! » tango Saulo atindaki bato kozingela ndako ya Davidi mpo na koboma ye. Nzembo ya Davidi.2Oh Nzambe na ngai, kangola ngaiwuta na maboko ya banguna na ngai ;batela ngai liboso ya banyokoli na ngai.3Kangola ngai wuta na mabokoya bato ya misala mabe,mpe bikisa ngai liboso ya basopi makila ya bato.
4Yawe, bazali koluka koboma ngai ;bato na nguya basaleli ngai likita,nzokande nasali mabe te,nasali na ngai mpe masumu te.5Nasali mabe ata moko te ;kasi bango bazali kopota mbangu,bazali komibongisa.Lamuka mpo na koya kokutana na ngai, mpe tala.6Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,Nzambe ya Isalaele, telema mpo na kopesabikolo nyonso etumbu ;koyokela bato nyonso oyo basalaka mabe mawa te.
7Bazongaka na pokwa,bagangaka lokola bambwampe batambolaka zingazinga ya engumba.8Na nzela ya minoko na bango,babimisaka na bibebu na bangomaloba oyo ezokisaka lokola mipanga ; bamilobelaka :« Nani azali koyoka biso ? »9Kasi Yo, Yawe, osekaka bango,otiolaka bikolo nyonso.
10Nzambe, ozali makasi na ngai,nakotalela Yo ;ozali ebombamelo na ngai,11Nzambe na ngai, oyo nalingaka.Nzambe ayaka kino liboso na ngai,atikaka ngai kotala banguna na ngai.12Nkolo, nguba na biso, koboma bango te,noki te bato na ngai bakobosana.Na nguya na Yo, sala ete bayengayenga,mpe mema bango kino na se.13Mpo na masumu ya minoko na bango,mpo na maloba ya bibebu na bango,tika ete bakangama na motambo ya lolendo na bango.Mpo na bilakeli mabe mpe lokuta na bango,14bebisa bango na kanda na Yo,bebisa bango kino bazala lisusu te.Bongo bakoyeba ete Nzambe azali kokonzakati na Jakobi kino na suka ya mokili.
15Bazongaka na pokwa,bagangaka lokola bambwampe batambolaka zingazinga ya engumba.16Bayengaka-yengaka mpo na koluka bilei ;soki batondi te, balekisaka butu na kolelalela.17Kasi ngai nakoyembela makasi na Yo,nakobetela bolingo na Yo milolo, na tongo,pamba te ozali ebombamelo na ngai,mpe ekimelo na ngai na tango ya pasi.18Ozali makasi na ngai,nakoyemba mpo na lokumu na Yo ;ozali ebombamelo na ngai, oh Nzambe ;Nzambe na ngai, oyo nalingaka.