Banzembo53lin_bib

Bato nyonso babungi nzela

1Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na flite.2Bazoba bamilobelaka :« Nzambe azali te. »Makanisi na bango esila kobeba,basalaka makambo mabe mpe ya nkele ;moko te asalaka bolamu.
3Wuta na likolo, Nzambe atalaka batompo na koluka koyebasoki ezali ata na moko ya mayele,oyo atalelaka Nzambe.4Bango nyonso bazali batomboki,bango nyonso bamibebisa ;moko te asalaka bolamu,ata moto moko te.
5Boni, bato nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ?Baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipampe batikala nanu kobelela Nzambe te,bazali penza kososola eloko moko te ?
6Somo monene ekokanga bangona esika oyo ezali ata na eloko moko teoyo ekoki kopesa bango somo,pamba te Nzambe apanzi mikuwa ya batooyo bayei kobundisa yo.Okoyokisa bango soni,pamba te Nzambe abwaka bango.
7Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona !Tango Nzambe akobimisa bato na Ye na bowumbu,bakitani ya Jakobi bakosepela,mpe Isalaele ekozala na esengo.