Banzembo48lin_bib

Engumba ya Nzambe

1Nzembo ya bana ya Kore.2Yawe azali monene mpe abongi na lokumu,kati na engumba ya Nzambe na biso,ngomba na Ye ya bule.
3Ezali kitoko, ngomba moke oyo esalakaesengo ya mokili mobimba,ngomba Siona !Ngambo na yango ya Nor nde ezaliengumba ya Mokonzi Monene.4Nzambe azali kati na bandako na yango ya bokonzi,amimonisi lokola ndako batonga makasi.
5Pamba te bakonzi basanganaki,batambolaki nzela moko.6Kasi tango kaka bamonaki yango,bakamwaki mpe bakimaki na somo.7Mbala moko, bakomaki kolenga wanalokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota8to lokola mopepe ya Este oyo apanzaka masuwa ya Tarsisi.
9Ndenge kaka bayebisaki biso,ndenge mpe tomonaki kati na engumba yaYawe, Mokonzi ya mampinga,kati na engumba ya Nzambe na biso ;Nzambe alendisaka yango seko na seko.
10Nzambe, kati na Tempelo na Yo,tokanisaka bolingo na Yo.11Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili,ndenge moko na Kombo na Yo ;loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo.12Ngomba ya Siona ezali kosepela,bamboka ya Yuda etondi na esengompo na mikano na Yo.
13Botambola pembeni ya Siona,bokende zingazinga na yango,botanga bandako na yango ya milayi.14Botala lopango na yango,botala malamu bandako na yangompo ete bopesa sangoepai ya bato oyo bakoya na sima.
15Pamba te Nzambe wana azali Nzambe na bisoseko na seko mpe libela na libela ;akotambolisa biso, ezala kino na kufa.