1Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.2Nzambe, toyokaki na matoyi na biso ;bakoko na biso babetelaki biso lisoloya makambo oyo osalaki na tango na bango,na tango ya kala.3Na nguya na Yo, obenganaki bikolompe otiaki bakoko na biso ;obetaki bikolo ya bapayampe ofulukisaki bakoko na biso.4Pamba te ezalaki na mopanga na bango tende babotolaki mokili,ezalaki mpe maboko na bango tende ebikisaki bango ;kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali,nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo,pamba te ozalaki kolinga bango.5Oh Nzambe, Yo oyo ozali Mokonzi na ngai,pesa mitindo mpo na elonga ya Jakobi.6Na lisungi na Yo, tolongaka banguna na biso,mpe na Kombo na Yo, tonyataka bayini na biso.7Pamba te natiaka elikya te na tolotolo na ngai,mpe mopanga na ngai ebikisaka ngai te.8Kasi ezali Yo nde obikisaka bisowuta na maboko ya bayini na biso,mpe oyokisaka bayini na biso soni.9Tomikumisaka mikolo nyonso kati na Nzambempe tokokumisa Kombo na Yo mpo na libela.10Kasi obwaki biso, oyokisi biso sonimpe ozali lisusu kotambola teelongo na mampinga na biso.11Otiki biso kokima liboso ya banguna na biso ;mpe bayini na biso bazwi biloko na biso na makasi.12Osundoli biso na maboko na bangolokola bameme ya kobomampe opanzi biso kati na bikolo.13Oteki bato na Yo na pambampe ozwi ata litomba te kowuta na boteki yango.14Okomisi biso eloko ya lisumana miso ya bato oyo bazali pembeni na biso,eloko ya litio mpe ya lisekina miso ya bato oyo bazali zingazinga na biso.15Okomisi biso lisapo kati na bikolo,mpe bato bakomi koningisa mito na bango mpo na biso.16Kosambwa ekomi tango nyonso liboso na ngaimpe soni ezipi elongi na ngai,17mpo na litio ya bato oyo bazali kofinga mpe kopamela ngai,mpe ya monguna oyo akangela ngai kanda.18Makambo wana nyonso ekweyeli bisoatako tobosanaki Yo tempe tobebisaki Boyokani na Yo te,19atako mitema na biso epengwaki tempe totamboli libanda ya nzela na Yo te.20Pamba te onyokolaki bisokati na etando ya bambwa ya zambampe ozipaki biso na molili makasi.21Soki tobosanaki Kombo ya Nzambe na bisoto totombolaki maboko na biso epai ya nzambe ya mopaya,22boni, Nzambe na biso alingaki koyeba yango te,lokola asosolaka mozindo ya mitema ?23Pamba te, likolo na Yo, babomaka biso mikolo nyonsompe bazwaka biso lokola bameme ya koboma.24Nkolo, lamuka ! Mpo na nini ozali kolala ?Lamuka, kobwaka biso te mpo na libela.25Yawe, mpo na nini ozali kobomba elongi na Yo ?Mpo na nini ozali kobosana pasi mpe minyoko na biso ?26Pamba te tokweyi na putulu,mpe nzoto na biso ekangami na mabele.27Telema, yaka kosunga biso,kangola biso mpo na bolingo na Yo !