1Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngailiboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te ;kangola ngai wuta na mabokoya bakosi mpe ya bato mabe.2Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai,oyo batonga makasi ;mpo na nini osundoli ngai ?Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye,na se ya minyoko ya monguna ?3Tinda mwinda mpe solo na Yompo ete ekamba mpe emema ngaina ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka ;4bongo nakokende na etumbeloepai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai.Oh Yawe, Nzambe na ngai,nakosanzola Yo na lindanda.5Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ?Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ?Tia elikya na yo kati na Nzambe,pamba te nakosanzola Ye lisusu,Mobikisi mpe Nzambe na ngai.