1Nzembo ya Davidi.Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami,mpe masumu na ye elongwe !2Esengo na moto oyo Yawe atangelaka lisumu te,mpe atambolaka na lokuta te.3Lokola nazalaki kondima mabe na ngai te,nazalaki tango nyonso kolela mpo na pasi.4Butu mpe moyi,loboko na Yo ezalaki kofinafina ngai ;makasi na ngai ekomaki kosilandenge makasa ekawukaka na eleko ya moyi.5Tango nandimaki masumu na ngaimpe nabombaki mabe na ngai te,nalobaki : « Nakotubelamasumu na ngai liboso ya Yawe. »Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.6Boye, tika ete bayengebene nyonsobasambelaka Yo na tango ya malamu !Soki mayi minene etomboki,bambonge na yango ekozwa bango te.7Ozali ebombamelo na ngai ;obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai tempe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.8Olobaki : « Nakopesa yo malakompe nakolakisa yo nzela ya kolanda ;nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.9Kozala te lokola mpunda to lokola mile ezanga bososoli,oyo bakangaka nguya na yangona nzela ya ebende mpe ya singaoyo batiaka na minoko na yangompo na kopekisa yango kopusana pene na yo. »10Bato mabe bazali na pasi mingi,kasi bolamu ya Yawe ezingelaka batooyo batiaka elikya na Yawe.11Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe,bozala na esengo !Bino nyonso oyo bozali na mitema alima,bobeta milolo ya esengo.