1Nzembo ya Davidi.Yawe, Nzambe na ngai,natiaka elikya na ngai kati na Yo.2Nzambe na ngai,natiaka elikya na ngai kati na Yo ;sala ete nayoka soni te,mpe banguna na ngai basepela te na tina na ngai.3Bato nyonso oyo batalelaka Yobakotikala koyokisama soni ata moke te ;kaka ba-oyo bapesaka Yo mokongonde bakoyokisama soni.4Yawe, lakisa ngai nzela,teya ngai nzela oyo olingi ete nalanda.5Kamba ngai kati na bosolo na Yompe pesa ngai mayele,pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai ;mpe ngai natiaka elikya na ngaikati na Yo tango nyonso.6Yawe, kanisa mawa mpe bolingo na Yo,pamba te ezali mpo na libela na libela.7Yawe, kokanisa te masumumpe botomboki ya bolenge na ngai ;kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo,pamba te ozali malamu.8Solo, Yawe azali malamu mpe alima ;atalisaka banzela na Yeepai ya bato ya masumu.9Atambolisaka bato oyo bamikitisa,kati na banzela ya sembo,mpe ateyaka bango banzela na Ye.10Banzela nyonso ya Yawe etalisaka bolingompe boyengebene na Ye mpo na batooyo babatelaka boyokani mpe malako na Ye.11Yawe, mpo na bolingo ya Kombo na Yo,limbisa masumu na ngai,atako ezali minene.12Banani bazali bato oyo batosaka Yawe ?Alakisaka bango nzela ya kopona.13Boye, bakolekisa mikolo ya bomoi na bangokati na bofuluki,mpe mokili ekozala libula ya bana na bango.14Yawe ayebisaka mabongisi na Yeepai ya bato oyo batosaka Ye,alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.15Natalelaka Yawe tango nyonso,pamba te kaka Ye nde akolongolamakolo na ngai na motambo.16Yawe, balola miso na Yo epai na ngaimpe salela ngai ngolu,pamba te nazali kaka ngai moko,mpe nazali monyokolami.17Lembisa pasi ya motema na ngaimpe kangola ngai na mitungisi na ngai.18Tala pasi mpe kolela na ngai,mpe limbisa masumu na ngai nyonso.19Tala ndenge nini banguna na ngai bazali ebele,mpe ndenge nini bazali koyina ngai makasi !20Batela bomoi na ngai mpe kangola ngai ;sala ete nayoka soni te,pamba te nabombamaka kati na Yo.21Lokola mpe natielaka Yo motema,tika ete bozangi pamela mpe bosembo ebatela ngai.22Nzambe, kangola Isalaele,na pasi na yango nyonso !