1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.2Yawe, mokonzi azali kosepela na nguya na Yo;Tala ndenge nini elonga oyo opesi yeepesi ye esengo monene !3Okokisi posa ya motema na yempe opimeli ye te oyo azalaki kosenga Yo.4Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya.Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolooyo basangisa na eloko mosusu.5Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango ;opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.6Nkembo na ye ezali monenempo na lobiko oyo opesaki ye ;olatisaki ye na kongenga mpe na lokumu.7Solo, okomisi ye etima ya mapamboli ya seko na seko ;okomisaki ye moto ya esengo na miso na Yo.8Mokonzi atiaka elikya na Yawe,aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.9Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso ;loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.10Tango okomimonisa,okokomisa bango lokola fulu ya moto.Yawe akosilisa koboma bango na kanda na Ye,mpe moto ekozikisa bango.11Okolimwisa mabota na bango na mokili,mpe bakitani na bango, kati na bana ya bato.12Atako bakani kosala Yo mabe,atako basali mabongisi ya mabempo na kotelemela Yo,bakotikala kolonga ata moke te ;13pamba te okobengana bangotango okobwakela bango bambanzi ya tolotolo na Yo.14Yawe, telema na nguya na Yo !Tokoyemba nguya na Yo na nzela ya banzembo.