Banzembo20lin_bib

Yawe, longisa mokonzi na biso

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.2Tika ete Yawe ayanola yona tango ya pasi ;tika ete Nzambe ya Jakobi azalandako batonga makasi mpo na kobatela yo.3Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bulempe apesa yo makasi wuta na Siona.4Tika ete akanisa makabo na yo nyonsompe andima mbeka na yo ya kotumba.5Tika ete akokisa posa ya motema na yompe mabongisi na yo nyonso.
6Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yompe tokotombola bendelena Kombo ya Nzambe na biso.Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso.
7Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye,ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola,na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.8Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar,bamosusu, kati na bampunda ;kasi biso totiaka elikya na bisokati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.9Bango, bafukamaka mpe bakweyaka ;kasi biso, tozalaka kaka ya kotelemampe totikalaka ngwi.10Yawe, bikisa mokonzi !Yanola biso tango tozali kobelela.