1Nzembo ya Davidi.Nzambe, batela ngai,pamba te nabombami kati na Yo.2Nalobaka na Yawe : « Ozali Nkolo na ngai,Yo moko kaka nde ozali bolamu na ngai. »3Natatolaka na tina na basantuoyo bazali kati na mbokaete bazali penza bato mineneoyo nasepelaka na bango makasi.4Bato oyo bapotaka mbangu mpo na koluka bolamu epaiya banzambe mosusu bakomona pasi mingi.Nakosopa te mbeka na bango ya makila epai ya banzambe ya lolenge wanampe nakotanga bakombo na yango te na bibebu na ngai.5Yawe, Yo moko kaka nde ozalilibula mpe bomoi na ngai ;ozali ndanga ya bozwi na ngai.6Nazwi etando ya motuya makasi,ezali libula ya kitoko penza mpo na ngai !7Nakopambola Yawe oyo apesaka ngai tolimpe, ezala na butu, angengisaka makanisi na ngai.8Natalelaka Yawe tango nyonso,pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.9Yango wana motema na ngai etondi na esengo,molimo na ngai ezali kosepela,nzoto na ngai mpe ekopema na kimia.10Oh Yawe, okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi,okotika mpe te ete mosantu na Yo apola.11Okolakisa ngai nzela ya bomoi ;okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo,elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.