Banzembo145lin_bib

Bokonzi na Yo ezali na suka te

1Masanzoli. Nzembo ya Davidi.Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai ;nakopambola Kombo na Yo seko na seko.
2Mikolo nyonso, nakopambola Yompe nakokumisa Kombo na Yo libela na libela.
3Yawe azali monene, abongi na lokumu ;moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.
4Bikeke nyonso ekotombola kitoko ya misala na Yompe ekopanza sango ya misala na Yo ya minene.
5Nakolemba te kotatola bikamwa na Yompe kongenga makasi ya nkembo na Yo.
6Bakolobela nguya na Yo ya somo,mpe ngai, nakosakola misala na Yo ya minene.
7Bakokanisa misala minene ya bolamu na Yo,bakobetela bosembo na Yo maboko.
8Yawe atonda na ngolu mpe na mawa,asilikaka noki te mpe atonda na bolingo.
9Yawe azali malamu mpo na bato nyonso,atonda na mawa mpo na bikelamu na Ye nyonso.
10Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo !Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo !
11Bazali koloba ete bokonzi na Yo etondi na nkembompe bazali kopanza sango ya misala ya nguya na Yo.
12Bazali koyebisa bato misala na Yo ya minenempe kongenga ya nkembo ya bokonzi na Yo.
13Ozali Mokonzi seko na seko,mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela.Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso,asalaka nyonso na bolingo.
14Yawe alendisaka bato nyonso oyo bakweyaka,atelemisaka bato nyonso oyo balembaka.
15Na bato nyonso oyo batalelaka Yo,opesaka bilei na tango oyo ekoki.
16Ofungolaka loboko na Yompe okokisaka posa ya nyonso oyo ezali na bomoi.
17Yawe azali sembo na nyonso oyo asalakampe atonda na bolingo kati na misala na Ye nyonso.
18Yawe azali pene ya bato nyonsooyo babelelaka Ye,ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;19akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye,ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye.
20Yawe abatelaka bato nyonso oyo balingaka Ye,kasi abebisaka bato nyonso ya mabe.
21Tika ete monoko na ngai ekumisa Yawe !Tika ete bikelamu nyonso epambolaKombo na Ye ya bule libela na libela !