1Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni,tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona.2Todiembikaki mandanda na bisona banzete ya pepiliye ya etuka yango.3Kuna, bato oyo bamemaki biso na bowumbubazalaki kosenga biso banzembo ;mpe banyokoli na biso bazalaki kosenga bisoete tozala na esengo.Bazalaki koloba :« Boyembela biso banzembo ya Siona ! »4Tokoyemba banzembo ya Yawe ndenge ninina mabele ya bapaya ?5Oh Yelusalemi, soki nabosani yo,wana tika ete loboko na ngai ya mobali elemba !6Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi,soki natie yo te liboso ya esengo nyonso,wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai !7Yawe, kobosana te bato ya Edomioyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ;bazalaki koganga :« Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »8Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo,esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabeoyo osalaki biso !9Esengo na moto oyo akokanga bana na yompe akonika bango na libanga !