1Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.Nasepelaka tango balobaka na ngai :« Tokende na Tempelo ya Yawe ! »2Yelusalemi, makolo na biso etelemina bikuke na yo !3Yelusalemi, engumba oyo etongama malamu ;engumba oyo biteni na yango ekangana esika moko.4Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe,kolanda mibeko kati na Isalaele,mpo na kosanzola Kombo ya Yawe.5Pamba te bakiti ya bokonzi ya batooyo basalelaka bosembo ezali kuna,bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi.6Bosenga kimia ya Yelusalemi !Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi,babika na kimia !7Tika ete kimia ezala kati na yompe kati na bandako na yo ya bokonzi !8Likolo ya bolingo na ngaimpo na bandeko mpe balingami na ngai,nalobi : « Tika ete kimia ezala kati na yo ! »9Likolo ya bolingo na ngaimpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso,nasengi bolamu mpo na yo.