1Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe,mpe ayanolaki ngai.2Oh Yawe, kangola ngaiwuta na maboko ya bakosimpe wuta na lolemo ya lokuta !3Yo, lolemo ya lokuta,Yawe akopesa yo nini,akofuta yo nini ?4Akobeta yo na makonga ya elombe ya bitumba,oyo ezali ya songe,elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube.5Mawa na ngai, mpo ete navandilokola mopaya kati na Mesheki,kati na bandako ya kapo ya Kedari.6Navandaki tango molayikati na bato oyo balingaka kimia te.7Ngai, nazali moto ya kimia ;kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia,bango baponaka mbala moko bitumba.