Banzembo119lin_bib

Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka

1Esengo na bato oyo bazangi pamelampe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe !2Esengo na bato oyo babatelaka malako na Yempe balukaka Ye na mitema na bango mobimba !3Basalaka mabe te,kasi balandaka banzela ya Nzambe.4Opesaki mibekompo ete etosama malamu.5Tika ete nabongisa etamboli na ngaimpo ete natosa mitindo na Yo !6Na bongo, nakoyoka soni tetango nakotosa mibeko na Yo nyonso.7Nakosanzola Yo na motema ya sembowana nakoyekola mibeko ya bosembo na Yo.8Nalingi kotosa mitindo na Yo ;kosundola ngai libela te !
9Ndenge nini elenge akoki kowumelana nzela ya sembo ?Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.10Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ;batela ngai mpo ete napengwa temosika ya mibeko na Yo !11Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngaimpo ete nasala masumu te na miso na Yo.12Yawe, tika ete opambolama !Lakisa ngai mitindo na Yo !13Na monoko na ngai, natangakamibeko na Yo nyonso.14Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yolokola nde nazali na bomengo nyonso.15Nakanisaka malako na Yompe natambolaka na banzela na Yo.16Nasepelaka mingi na malako na Yompe nabosanaka liloba na Yo te.
17Salela ngai, mosali na Yo, bolamumpo ete nabika mpe natosa liloba na Yo.18Fungola miso na ngaimpo ete namona kitoko ya mibeko na Yo.19Nazali mopaya awa na mokili ;kobombela ngai mibeko na Yo te.20Molimo na ngai ezalaka tango nyonsona posa makasi ya koyeba mibeko na Yo.21Otelemelaka bato ya lofundu,bato oyo balakelama mabempe bapengwaka mosika ya mibeko na Yo.22Longola soni mpe kotiolama na bomoi na ngai,pamba te natosaka malako na Yo.23Ezala soki bakambi basali likitampe bayokani kotelemela ngai, mosali na Yo,nakokanisa kaka mitindo na Yo.24Malako na Yo esepelisaka ngai makasi,epesaka ngai toli.
25Nakangami na putulu ;batela bomoi na ngai kolanda liloba na Yo.26Nayebisaki Yo banzela na ngai,mpe oyanolaki ngai ;lakisa ngai mibeko na Yo !27Sala ete nasosola nzela ya mitindo na Yompo ete nakanisa misala minene na Yo !28Nazali kolela mpo na pasi na motema ;pesa ngai mpiko kolanda liloba na Yo.29Mema ngai mosika ya nzela ya lokuta ;mpe, na boboto na Yo, teya ngai mobeko na Yo.30Naponaki nzela ya bosolo ;natambolaka kolanda mibeko na Yo.31Nakangami na malako na Yo ;Yawe, koyokisa ngai soni te.32Nakimaka mbangu kati na nzela ya mibeko na Yo,pamba te opesaka ngai bososoli na yango.
33Yawe, teya ngai nzela ya mitindo na Yompo ete nabatela yango kino na suka.34Pesa ngai bososoli mpo ete natosa mibeko na Yompe nalanda yango na motema na ngai mobimba.35Tambolisa ngai kati na nzela ya mibeko na Yo,pamba te nasepelaka na yango.36Sala ete motema na ngai esepela na malako na Yo,kasi na bomengo te !37Longola miso na ngai na makambo ya pamba,batela bomoi na ngai kati na banzela na Yo !38Kokisela mosali na Yo bilakaoyo opesaki mpo na bato oyo batosaka Yo.39Longola mosika na ngai soni oyo nabangaka,pamba te mibeko na Yo ezali malamu.40Nasepelaka makasi na mibeko na Yo ;batela bomoi na ngai kati na bosembo na Yo !
41Yawe, tika ete bolingo ekomela ngai,mpe lobiko na Yo, kolanda elaka na Yo ;42bongo nakokoka kozwa eyano ya kopesana mofingi na ngai,pamba te natiaka elikya na liloba na Yo.43Tika ete monoko na ngai elobaka kaka bosolo,pamba te natiaka elikya kati na mibeko na Yo.44Nakotosa mibeko na Yo tango nyonso,mpe libela na libela.45Nakobika na bonsomi ya solo,pamba te nasepelaka kotosa mitindo na Yo.46Nakolobela malako na Yo liboso ya bakonzina kozanga koyoka soni.47Nasepelaka mingi na mibeko na Yompe nalingaka yango mingi.48Nalapi ndayi mpo na mibeko na Yo,oyo nalingaka,mpe nakokanisa mitindo na Yo.
49Kanisa makambo oyo olobaki na mosali na Yo,pamba te opesaki ngai elikya.50Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka ;batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo.51Solo, bato ya lolendo batiolaki ngai makasi ;kasi ngai, natikalaki kopengwa te na mibeko na Yo.52Yawe, tango nakanisaka mikano na Yo ya kala,nazwaka kati na yango kobondisama.53Nayokaka pasi mingi na motematango namonaka bato mabekosundola mibeko na Yo.54Nakoma koyemba mitindo na Yona bisika nyonso epai wapi nazali moleki nzela.55Yawe, nakanisaka Yo na butumpo ete nabatela mibeko na Yo ;56pamba te libula na ngai ezali :kotosa mibeko na Yo.
57Yawe, nalobi lisusu ete libula na ngai ezali :kotosa liloba na Yo.58Na motema na ngai mobimba, nalukaka kosepelisa Yo ;salela ngai ngolu kolanda bilaka na Yo !59Natali malamu etamboli na ngaimpe namizongisi kati na malako na Yo.60Natosaka mibeko na Yo noki,nazelisaka te.61Solo, mitambo ya bato mabe ekangaki ngai,kasi ngai nabosanaki te mibeko na Yo.62Na kati-kati ya butu, nalamukaka mpo na kokumisa Yolikolo na mibeko na Yo ya sembo.63Nazali moninga ya bato nyonso oyo batosaka Yompe babatelaka mitindo na Yo.64Yawe, mokili etondi na bolingo na Yo ;lakisa ngai mitindo na Yo !
65Yawe, salela mosali na Yo bolamukolanda liloba na Yo.66Teya ngai bolamu ya bososoli mpe ya mayele,pamba te namipesaka na mibeko na Yo.67Liboso ete obeta ngai, nazalaki mopengwi ;kasi sik’oyo, nakomi kotosa liloba na Yo.68Ozali malamu mpe osalaka makambo ya malamu ;teya ngai mitindo na Yo !69Bato ya lolendo bakoselaka ngai makambo ;kasi ngai, natosaka mitindo na Yona motema na ngai mobimba.70Mitema na bango ezali mabanga ;kasi ngai, nasepelaka na mibeko na Yo.71Ezalaki penza malamu mpo na ngai ete obeta ngai,mpo ete nayekola mitindo na Yo.72Mpo na ngai, mibeko oyo ozwaki mpe osakolakina monoko na Yo ezali malamukoleka biloko nkoto mokoya wolo mpe ya palata.
73Osalaki mpe olendisaki ngai na maboko na Yo,pesa ngai mayele mpo ete nayekola mibeko na Yo !74Tango bato oyo batosaka Yo bamonaka ngai,basepelaka makasi,mpo ete natiaka elikya na liloba na Yo.75Yawe, nayebi malamuete mibeko na Yo ezali sembo,mpe ete ezali kaka mpo na bolingo na Yonde obetaki ngai.76Tika ete bolingo na Yo ebondisa ngai,kolanda elaka na Yo epai ya mosali na Yo !77Talisa ngai mawa na Yo mpo ete nabika,pamba te nasepelaka na mibeko na Yo.78Tika ete bato wana ya lofundu,oyo bamonisaka ngai pasi na kozanga tina, bakufa soni !Kasi ngai nakokanisa kaka mibeko na Yo.79Tika ete bato oyo batosaka Yo,ba-oyo bayebi malako na Yo,bazongela ngai.80Tika ete motema na ngai ezanga pamelampo na kotosa mitindo na Yo,mpo ete nakufa soni te.
81Natondi na posa ya lobiko na Yo,nazali na elikya kati na liloba na Yo.82Miso na ngai elembi kozelakokokisama ya elaka na Yo ;nakomi komituna :« Okobondisa ngai tango nini ? »83Nakomi lokola mbekioyo ezali kokawuka na milinga,nzokande nabosanaka mitindo na Yo te.84Mikolo ya bomoi ya mosali na Yoezali motango boni ?Mokolo nini okopesa banyokoli na ngai etumbu ?85Bato ya lolendo batimoli mabulumpo na kokanga ngai,baboyi kotosa mibeko na Yo.86Mibeko na Yo nyonso ezali sembo ;kasi bazali konyokola ngai kaka pamba ;yaka kosunga ngai !87Etikali moke mpo ete balongola ngai na mokili ;kasi atako bongo, nasundoli mibeko na Yo te.88Kati na bolingo na Yo, batela bomoi na ngaimpo ete natosa malako na Yo.
89Yawe, liloba na Yo ezali mpo na seko,epikama kati na likolo ;90boyengebene na Yo ekowumela seko na seko.Okela mabele, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo ;91opesa mibeko, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo,pamba te nyonso kati na mokili mobimbaepesaka Yo lokumu.92Soki nasepelaki na mibeko na Yo te,mbele nakufa kala kati na pasi na ngai.93Nakotikala kobosana ata moke te mitindo na Yo,pamba te obatelaka bomoi na ngaina nzela na yango.94Bikisa ngai, pamba te nazali moto na Yompe natosaka mitindo na Yo !95Bato mabe bazali koluka koboma ngai,kasi ngai nakangami kaka na malako na Yo.96Na nyonso oyo emonanaka lokola ya kokoka,namonaki mondelo ;kasi mibeko na Yo ezalaka na mondelo te.
97Nalingaka mibeko na Yo mingi !Nakanisaka yango mikolo nyonso.98Mibeko na Yo ekomisaka ngai moto ya bwanyakoleka banguna na ngai ;ezalaka elongo na ngai tango nyonso.99Naleki balakisi na ngai nyonso na mayele,pamba te nakanisaka malako na Yo.100Naleki mibange na bososoli,pamba te natosaka mibeko na Yo.101Natambolaka te na banzela nyonso ya mabempo na kotosa liloba na Yo.102Nakangamaka na mibeko na Yo,pamba te Yo moko nde oteyaka ngai yango.103Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengina monoko na ngai !Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.104Mitindo na Yo ekomisi ngai moto ya bososoli ;yango wana nayinaka nzela nyonso ya mabe.
105Liloba na Yo ezali mwindampo na makolo na ngai,mpe pole mpo na nzela na ngai.106Nalapaki ndayi oyo mpe nakokokisa yango :« Nakotosaka mibeko ya bosembo na Yo. »107Motema na ngai etutami makasi ;Yawe, batela bomoi na ngaikolanda liloba na Yo.108Yawe, ndima likabo ya bibebu na ngai,mpe teya ngai mibeko na Yo.109Solo, nakutanaka tango nyonso na makama,kasi nabosanaka mibeko na Yo te.110Bato mabe batiaka mitambo mpo ete nakweya,kasi nakangamaka kaka na mibeko na Yo.111Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela,esalaka esengo ya motema na ngai.112Nazwa mokano ya kotambolakolanda mitindo na Yo,tango nyonso, kino na suka.
113Nayinaka bato ya mitema mibale,kasi nalingaka nde mibeko na Yo.114Ozali ebombamelo mpe nguba na ngai ;natiaka elikya kati na liloba na Yo.115Bato ya misala mabe, bokende mosika na ngai !Nakotosa mibeko ya Nzambe na ngai !116Sunga ngai kolanda elaka na Yo, mpe nakobika ;koyokisa elikya na ngai soni te.117Sunga ngai mpo ete nabika ;nakotikala kobosana mitindo na Yo ata moke te.118Obwakaka bato nyonso oyo bapesakamitindo na Yo mokongo,pamba te mokano na bango ezalaka ya lokuta.119Olongolaka bato nyonso ya mabe ya mokililokola bosoto ;yango wana nalingaka malako na Yo.120Nalengaka na somo liboso na Yompe nabangaka mikano na Yo.
121Natambolaka na bosembo mpe bosolo ;kokaba ngai na maboko ya banyokoli na ngai te !122Kamata mokumba ya bolamu na ngai,mosali na Yo ;tika ete bato ya lolendo banyokola ngai te.123Miso na ngai elembi kozela lisungi kowuta na Yompe kokokisama ya bosembo na Yokolanda elaka na Yo.124Salela ngai, mosali na Yo, kolanda bolingo na Yo,lakisa ngai mitindo na Yo.125Nazali mosali na Yo ; pesa ngai mayelempo ete nasosola malako na Yo.126Yawe, tango ya kosala ekoki ;pamba te bazali kobuka mibeko na Yo !127Yango wana nalingaka mibeko na Yokoleka wolo, koleka kutu wolo ya peto ;128namonaka mpe malako na Yo nyonso alima ;nzokande, nayinaka lokuta nyonso.
129Malako na Yo ezali kitoko,yango wana nabatelaka yango.130Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka,epesaka bazoba mayele.131Monoko na ngai efungwamaka makasilikolo ya kozela,pamba te nazali na posa makasi ya mibeko na Yo.132Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yokolanda ndenge okata mpo na batooyo balingaka Kombo na Yo.133Lendisa bomoi na ngai na nzela ya liloba na Yompe pekisa mabe ete ekonza ngai te.134Kangola ngai wuta na minyoko ya bato,mpe nakotosa mibeko na Yo.135Tika ete elongi na Yo engengela ngai,mosali na Yo ;lakisa ngai mibeko na Yo !136Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli,pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.
137Yawe, ozali sembo,mpe mibeko na Yo ezali alima ;138osalaki malako na Yona bosembo mpe na bolingo.139Mpo ete banguna na ngai bazwakaliloba na Yo na motuya te,nayokaka kanda makasi komata ngai na motema.140Nzokande liloba na Yo ezali penza peto ;mpe ngai, mosali na Yo, nalingaka yango.141Atako nazali moke mpe batiolaka ngai,kasi nabosanaka mitindo na Yo te.142Bosembo na Yo ekotikala bongo mpo na libela,ekotikala kobongwana te ;mpe mibeko na Yo ezali solo.143Pasi ekangi ngai, mpe mayele esili ngai ;kasi mibeko na Yo epesaka ngai esengo.144Malako na Yo ezali sembo mpo na libela ;pesa ngai bososoli mpo ete nabika !
145Nazali kobelela Yona motema na ngai mobimba :« Yawe, yanola ngai ;nakotosa mitindo na Yo !146Nazali kobelela Yo : bikisa ngai,mpo ete natosa malako na Yo !147Nalamukaka liboso ete tongo etanampo na kobelela Yo,nazali na elikya kati na liloba na Yo.148Nalamukaka na kati-kati ya butumpo na kokanisa mitindo na Yo.149Yoka ngai na bolingo na Yo !Yawe, batela bomoi na ngaikolanda mibeko na Yo !150Bato oyo basalaka mabongisi mabe,oyo batosaka mibeko na Yo te,bazali koya pene na ngai.151Nzokande Yo, Yawe, ozali pene,mpe mibeko na Yo nyonso ezali bosolo.152Wuta kala, ngai nayebi, na nzela ya malako na Yo,ete otia mibeko yango mpo na libela.
153Mona malamu pasi na ngai mpe kangola ngai,pamba te nabosanaka mibeko na Yo te.154Kota likambo na ngai mpe kangola ngai,batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo !155Lobiko ezalaka mosika ya bato mabe,pamba te bamonaka pamba mitindo na Yo.156Yawe, mawa na Yo ezali monene penza ;batela bomoi na ngai kolanda mibeko na Yo.157Banyokoli mpe banguna na ngai bazali solo ebele,kasi ngai nakangamaka kaka na malako na Yo.158Natalaka na nkele bato oyo bazangi kondima,ba-oyo batosaka liloba na Yo te.159Yawe, tala ndenge nalingaka mitindo na Yo !Batela bomoi na ngai kolanda bolingo na Yo.160Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo,mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezalimpo na libela.
161Bakambi banyokolaka ngai kaka pamba,kasi kaka liloba na Yo nde ebangisakamotema na ngai.162Nasepelaka na liloba na Yolokola moto oyo azwi bomengo ebele ya bitumba.163Nayinaka lokuta mpe nayokaka yango nkele,nalingaka nde mibeko na Yo.164Nakumisaka Yo mbala sambo na mokolompo na mibeko ya bosembo na Yo.165Bato oyo balingaka mibeko na Yobazali bato na kimia monene,mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.166Yawe, natielaka Yo motemampo ete obikisa ngai,mpe natosaka mibeko na Yo.167Natosaka malako na Yo,pamba te nalingaka yango makasi.168Natosaka malako mpe mibeko na Yo,pamba te oyebi banzela na ngai nyonso.
169Yawe, tika ete koganga na ngai ekomakino epai na Yo !Pesa ngai bososoli kolanda liloba na Yo !170Tika ete mabondeli na ngai ekomakino epai na Yo !Kangola ngai kolanda elaka na Yo.171Tika ete bibebu na ngai ekumisa Yo,pamba te olakisaka ngai mitindo na Yo !172Tika ete lolemo na ngai eyemba liloba na Yo,pamba te mibeko na Yo nyonso ezali sembo.173Tika ete loboko na Yo esunga ngai,pamba te napona kolanda malako na Yo.174Yawe, nazali na posa makasiya lobiko na Yo ;mibeko na Yo epesaka ngai esengo.175Tika ete nazala na bomoi mpo na kokumisa Yo,mpe tika ete mibeko na Yo esunga ngai !176Nazali koyengayenga lokola meme oyo ebungi ;luka ngai, mosali na Yo,pamba te nabosani mibeko na Yo te. »