Banzembo113lin_bib

Moko te akokani na Nzambe

1Bokumisa Yawe !Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye ;bokumisa Yawe !2Tika ete Kombo ya Yawe epambolamakobanda sik’oyo kino libela na libela !3Longwa na este kino na weste,tika ete Kombo ya Yawe epambolama !
4Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso,nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.5Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso,oyo avandi na Kiti ya Bokonzikati na bisika oyo eleki likolo ?6Agumbamaka mpo na kotalalikolo mpe mokili.
7Wuta na putulu, atombolakamoto oyo akelela ;wuta na fulu ya matiti,abimisaka mobola8mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi,na bankumu ya bato na Ye.9Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye,lokola mama ya esengo kati na bana na ye.Bokumisa Yawe !