1Bokumisa Yawe !Esengo na moto oyo atosaka Yawempe asepelaka makasi na mibeko na Ye.2Bana na ye bakozala bato na nguyakati na mokili ;ekeke ya bato ya sembo ekopambolama.3Ndako na ye ezali na bokolongonompe na bomengo,mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko.4Pole engengaka kati na molilimpo na bato ya alima,mpo na moto oyo alimbisaka baninga,ayokelaka bato mawa mpe azali sembo.5Esengo na moto oyoayokelaka bato mawa mpe adefisaka,mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.6Solo, aninganaka ata moke te.Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.7Abangaka basango ya mabe te ;motema na ye ezali na kimia,atiaka elikya na ye kati na Yawe.8Motema na ye eninganaka te,abangaka te kino akomona banguna na yekozwa etumbu.9Akabelaka babola na motema ya esengo ;bosembo na ye ewumelaka libela na libela,lokumu na ye ekitaka te.10Moto mabe amonaka yangompe asilikaka na zuwa,aliaka minu mpe alembaka nzoto.Posa ya bato mabe elimwaka.