Banzembo107lin_bib

Nzembo ya basikolami

1Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !2Tika ete bato oyo Yawe asikolakibaloba bongo,ba-oyo akangolaki wuta na maboko ya monguna,3ba-oyo asangisaki wuta na bikolo nyonso,wuta na este, na weste, na nor mpe na sude.
4Ndambo bazalaki koyengayenga na esobe,na esika oyo ezanga bato,bamonaki te nzela ya engumbaepai wapi bakoki kovanda.5Likolo ya nzala mpe ya posa ya mayi,bakomaki pene ya kokufa.6Bongo kati na pasi na bango,babelelaki Yawe,mpe akangolaki bango na mitungisi na bango.7Atambolisaki bango na nzela ya alimampo ete bakende kovanda kati na engumba.8Tika ete basanzola Yawempo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !9Apesaki mayi epai ya batooyo bazalaki na posa ya mayimpe bilei epai ya bato oyo bazalaki na nzala.
10Bato oyo bazalaki kovanda na bisikaya molili makasi mpe ya molili ya kufabazalaki ya kokangama na minyokompe na minyololo ya bibende,11pamba te batombokelaki maloba na Nzambempe batiolaki mabongisi ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.12Abukaki lolendo ya mitema na bangona nzela ya misala makasi ;bakweyaki, mpe moko te asungaki bango.13Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe,mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.14Abimisaki bangowuta na molili makasi mpe na molili ya kufa,mpe abukaki minyololo na bango.15Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingompe bikamwa na Ye mpo na bato !16Pamba te abukaki bikuke ya bronzempe akataki bikangelo ya mabende.
17Bamosusu bakomaki bazobampo na etamboli mabe na bango,mpe bato na pasi, mpo na masumu na bango.18Minoko na bango eyinaki bilei nyonso,mpe bakomaki pene ya bikuke ya kufa.
19Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe,mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.20Atindaki Liloba na Ye mpe abikisaki bango,akangolaki bango wuta na kunda.
21Tika ete basanzola Yawempo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !22Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondimpe bapanza sango ya misala na Yena koganga na esengo !
23Bato oyo bakendaka mobembona ebale monene kati na masuwampe basalaka mombongo na mayi minene24bamonaki misala ya Yawe,mpe bikamwa kati na ebale monene.
25Alobaki, mpe mopepe makasi eyaki,etombolaki bambonge.26Bazalaki komata kino na likolompe kokita kino na se,bazalaki kolemba nzoto kati na pasi.27Bazwaki kizunguzungu mpe bakomaki kotenga-tengalokola bato balangwe masanga,bwanya na bango nyonso elimwaki.
28Kati na pasi na bango, babelelaki Yawempe abimisaki bango na mitungisi na bango.29Akitisaki mopepe makasi,bambonge ya ebale monene evandaki kimia.30Basepelaki na kimia oyo ezongaki,mpe Nzambe amemaki bangokino na libongo oyo balingaki.
31Tika ete basanzola Yawempo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !32Tika ete banetola Ye kati na lisanga ya batompe bakumisa Ye kati na mayangani ya bakambi.
33Akoki kobongola bibale esobe ;kobongola bitima mabele ya kokawuka ;34kobongola mabele oyo ebotaka bambumamabele ya mungwalikolo ya mabe ya bavandi na yango.35Akoki kobongola esobe liziba ;kobongola mabele ya kokawuka bitima.36Akoki kosala ete bato na nzalabakoma kovanda kuna,batonga engumba oyo bato bakoki kovanda,37babwaka bambuma na bilangampe balona banzete ya vinooyo ekobota bambuma ebele.
38Apamboli bango, mpe bakomi ebele ;mpe akitisi te motango ya bibwele na bango.
39Motango ya bato mosusu ekitimpe balembi nzoto mpo na minyoko mpe pasi.
40Nzambe asambwisaka bato minene,akotisaka bango na mobulu makasikino bazanga nzela ya kobimela na pasi.41Kasi akangolaka babola wuta na pasi na bango,mpe asalaka ete babotana ebelekati na bituka na bangolokola etonga ya bameme.
42Tango bato ya sembo bamonaka bongo,basepelaka,kasi bato nyonso ya mabe bakangakaminoko na bango.43Tika ete moto ya bwanya asala kebana makambo wana nyonsompe akanisa na tina na bolingo ya Yawe !