Banzembo103lin_bib

Tika ete bomoi na ngai mobimba ekumisa Yawe

1Nzembo ya Davidi.Eh molimo na ngai, pambola Yawe !Tika ete motema na ngai mobimba epambolaKombo na Ye ya bule !2Eh molimo na ngai, pambola Yawempe kobosana ata moko tekati na misala malamu na Ye !3Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso,abikisaka yo na bokono nyonso,4akangolaka bomoi na yo wuta na libulu,alatisaka yo motole ya bolingo mpe ya mawa,5atondisaka bomoi na yo na esengompe akomisaka yo elenge lokola mpongo.
6Yawe asalaka mpo na bosembo,akotelaka banyokolami nyonso.7Amonisaki banzela na Ye epai ya Moyize,mpe bikamwa na Ye epai ya bato ya Isalaele.
8Yawe ayokelaka bato mawampe asalelaka bango bolamu,asilikaka noki te mpe atonda na bolingo ;9azwaka biso makambo te tango nyonso,abombaka kanda na Ye te mpo na libela ;10apamelaka biso te kolanda masumu na biso,azongiselaka biso te kolanda mabe na biso.
11Ndenge likolo etombolama mosika ya mabele,ndenge wana mpe bolingo na Ye ezali monenempo na bato oyo batosaka Ye ;12ndenge este ezali mosika ya weste,ndenge wana mpe abwakaka masumu na bisomosika na biso.
13Ndenge tata alingaka makasi bana na ye,ndenge wana mpe Yawe alingaka makasibato oyo batosaka Ye ;14pamba te Yawe ayebi na eloko nini asala biso,ayebi malamu ete tozali putulu.
15Mikolo ya bomoi ya moto ezali lokola matiti,ebongaka lokola fololo ya bilanga ;16nzokande soki kaka mopepe ebeti yango,ezalaka lisusu te,mpe esika epai wapi ezalaki ebosani yango.17Kasi bolingo ya Yawempo na bato oyo batosaka Ye,mpe bosembo na Yempo na bakitani na bango,18mpo na bato oyo babatelaka boyokani na Yempe batosaka mibeko na Ye,ezali ya libela na libela.
19Yawe atia Kiti na Ye ya Bokonzikati na Likolo,azali Mokonzi ya mokili mobimba.20Bopambola Yawe,bino ba-anjelu na Ye nyonso oyo bozali na nguyampe botosaka mitindo na Ye.21Bopambola Yawe, bino mampinga na Ye nyonsooyo bokokisaka mokano na Ye.22Bopambola Yawe, bino bikelamu na Ye nyonso,kati na bisika nyonso ya Bokonzi na Ye.Eh molimo na ngai, pambola Yawe !