1Nzembo ya Davidi.Nakoyemba bolingo mpe bosembo ;nakoyembela nde Yo, Yawe.2Nakolanda na bokebi nzela ya batooyo bazangi pamela.Okoya epai na ngai tango nini ?Kati na ndako na ngai, nakotambola malamuna motema ezangi pamela.3Nakotala eloko moko te ya mabe ;nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima,ekoki kokangama na ngai te.4Mosika na ngai, motema ya kilikili ;naboyi kosala mabe.5Nakosala ete avanda kimia,moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokutampo na kobebisa lokumu ya baninga.Nakokoka te kotala moto ya lolendompe moto ya lofundu.6Nakopona nde bato ya sembo kati na mokilimpo ete bavanda pembeni na ngai ;moto na etamboli ezanga pamelande akozala mosali na ngai.7Kati na ndako na ngai, mokosi akovanda te ;liboso na ngai, mokosi akotelema te.8Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabekati na mokili bavanda kimia ;nakolongola na engumba ya Yawebato nyonso ya mabe.