1Tala masese mosusu ya Salomo oyo bato ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, bakomaki.2Nzambe azwaka nkembompo ete asalaka makambo oyo bato bayebaka te,mpe bakonzi bazwaka nkembompo ete balukaka kososola tina ya makambo.3Ndenge bakokaka te komekabosanda ya Lola to bozindo ya mabele,ndenge wana mpe bakoki te kososola mitema ya bakonzi.4Soki olongoli mbindo na palata,ekobimisa mbeki mpo na monyangwisi bibende na moto.5Soki olongoli moto mabe liboso ya mokonzi,kiti na ye ya bokonzi ekolendisama na bosembo.6Komikumisaka te liboso ya mokonzi,mpe komivandisaka te na esika ya bato minene ;7pamba te eleki malamu ete baloba na yo : « Yaka kovanda na esika oyo ya lokumu, »na esika ete bayokisa yo soni na miso ya mokonzi.8Kowelaka te kokende kofunda epai ya basambisimakambo oyo osili komona na miso,pamba te okosala nini na sukasoki moninga na yo asukisi yo ?9Soki ozali kowelana na moninga na yo,kobimisa sekele ya moto mosusu te,10noki te ayoka yango mpe ayokisa yo soni,boye okosambwa mpo na libela.11Liloba oyo elobami na tango oyo ekokiezali lokola wolo oyo basangisi na palata.12Pamela ya moto ya bwanya epai ya moto oyo ayokakaezali lokola wolo ya peto mpe sheneti ya wolo.13Motindami ya sembo azalakalokola mopepe ya malili ya mvula ya pembena tango ya kobuka bambuma,asalaka esengo ya mokonzi na ye.14Moto oyo amikumisaka ete akabaka,nzokande apesaka na ye eloko te,azali lokola mapata mpe mopepe oyo ezangi mvula.15Moto oyo akangaka motemaakoki kobongola makanisi ya mokonzi,mpe maloba ya malamu ebukaka mikuwa.16Soki omoni mafuta ya nzoyi, lia oyo ekoki na yo,pamba te soki olie yango na lokoso, okosanza yango.17Kokendaka pamba-pamba te na ndako ya moninga na yo,noki te akotonda yo mpe akolemba yo.18Moto oyo apesaka matatoli ya lokutampo na kosala moninga na ye mabeazali lokola marto, mopanga mpe mbanzi ya songe.19Kotia elikya na zoba na tango na pasiezali lokola lino ebukani mpe lokolo elembi.20Koyembela moto oyo azali na mawa banzembo ya esengoezali lokola kolongola ye kazaka na tango ya malilito kotia masanga ya ngayi na pota.21Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ;soki azali na posa ya mayi, pesa ye mayi ya komela.22Pamba te, soki osali bongo,okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye,mpe Yawe akofuta yo.23Mopepe oyo ewutaka na ngambo ya nor, ebetisaka mvula,mpe lolemo oyo etongaka ekomisaka bilongi kanda-kanda.24Kovanda na songe ya ndako ezali malamukoleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.25Basango ya malamu oyo ewuti na mokili ya mosikaezali lokola mayi ya pio kati na motema ya motooyo azali na posa ya mayi.26Moto ya sembo oyo asopanaka liboso ya moto mabeazali lokola liziba ya potopotompe etima oyo ebimisaka mayi ya mabe.27Ezali malamu te kolia mafuta ya nzoyi ebele,mpe ezali malamu te koluka lokumu na yo moko.28Moto oyo akokaka te kokonza molimo na yeazali lokola engumba oyo ebukana mpe ezanga bamir.