Masese22lin_bib
1Kokende sango ya malamu ezali malamukoleka kozala na bomengo mingi ;lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo.2Mozwi mpe mobola bazali na likambo moko ya lisanga :ezali Yawe nde azali Mokeli na bango mibale.3Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka,kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.4Komikitisa mpe kotosa Yawe ememakabozwi, lokumu mpe bomoi.5Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo,kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.6Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.7Mozwi azalaka mokonzi ya mobola,mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi.8Moto oyo alonaka masumu abukaka pasi,mpe makasi ya kanda na ye nyonso ekosuka.9Moto oyo akabaka na esengo akopambolama,pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.10Bengana motioli,bongo kowelana, koswana mpe kofingana ekosila.11Moto oyo alingaka kozala peto na motema,oyo ngolu ezalaka na bibebu na ye,mokonzi azalaka molingami na ye.12Miso na Yawe ebatelaka boyebi,kasi akweyisaka maloba ya moto oyo azangi mayele.13Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ezali kuna na libanda,ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »14Monoko ya mwasi ya ndumba ezalaka lokola libulu ya mozindo ;moto oyo Yawe asilikeli akweyaka kuna.15Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba,bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.16Moto oyo anyokolaka mobolampo ete akoma na bomengo mingimpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola.