Masese21lin_bib
1Kati na loboko na Yawe,motema ya mokonzi ezalaka lokola molukaoyo atindaka esika nyonso oyo alingi.2Nzela nyonso ya moto emonanaka alima na miso na ye,kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.3Na miso na Yawe,kosala makambo ya sembo mpe ya alima ezali motuyakoleka bambeka ya kotumba.4Miso ya lofundu, motema ya lolendompe kongenga ya bato mabe ezali masumu.5Mabongisi ya moto oyo asalaka mosalaememaka ye na bomengo,kasi kozala motema moto-moto ememaka na kozanga.6Kozwa bomengo na nzela ya lokuta ezali kaka molingaoyo epanzanaka mpe motambo oyo ememaka na kufa.7Makambo ya bato mabe ebebisaka bango moko,pamba te baboyaka kosala makambo ya sembo.8Nzela ya moto mabe ezalaka na mabaku,kasi mosala ya moto ya peto ezalaka sembo.9Kovanda na songe ya ndako ezali malamukoleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.10Molimo ya moto mabe elingaka kaka makambo mabe ;ata moninga na ye penza azwaka ngolu te na miso na ye.11Tango bapesaka motioli etumbu,zoba akomaka moto ya bwanya ;mpe tango bapesaka malako epai ya moto ya bwanya,azwaka solo boyebi.12Nzambe ya sembo atalaka na bokebi makambooyo esalemaka kati na bandako ya bato mabe,mpe akweyisaka bango kati na pasi.13Soki moto akangi matoyi na yempo na koboya koyoka koganga ya mobola,ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.14Likabo oyo bapesi na nkuku ekitisaka kanda,mpe kado oyo batie na tolo ekitisaka kanda makasi.15Ezali esengo mpo na moyengebene kosambisa makambo na sembo,kasi yango ezali pasi makasi mpo na bato oyo basalaka mabe.16Moto oyo abungi nzela ya bwanyaakovanda kati na lisanga ya bakufi.17Moto oyo alingaka biyenga akokoma mobola ;moto oyo alingaka masanga ya vino mpe mafutaakotikala kokoma mozwi te.18Moto mabe azalaka lokola motuya oyo bafutakampo na kosikola moto ya sembo ;moto ya sembo te azalaka lokola motuyaoyo bafutaka mpo na kosikola moto ya alima.19Kovanda kati na esobe ezali malamukoleka kovanda esika moko na mwasioyo aswanaka-swanaka mpe asilikaka-silikaka.20Bilei ya kitoko mpe mafuta ezalakakati na ndako ya moto ya bwanya,kasi moto oyo azangi mayele abebisaka yango.21Moto oyo alukaka bosembo mpe bolingoakozwa bomoi, bomengo mpe lokumu.22Moto ya bwanya abundisaka engumba ya bato ya makasi,mpe akweyisaka bandako ya makasioyo bato batielaka mitema.23Moto oyo abatelaka monoko mpe lolemo na yeabatelaka molimo na ye na pasi.24Kombo ya moto ya lofundu mpe ya lolendo ezali : « Motioli. »Asalaka makambo na lolendo oyo eleka ndelo.25Baposa ya moto ya goyigoyi ekoboma ye,pamba te maboko na ye eboyaka kosala.26Mokolo mobimba,akufaka na ye kaka na baposa makasi ;kasi moto ya sembo apesaka na kobomba te.27Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele ;ezalaka nkele koleka soki amemi yango na makanisi mabe.28Motatoli ya lokuta akokufa,kasi moto oyo ayokaka akoloba tango nyonso.29Moto mabe akangaka elongi na ye,kasi moto ya sembo alendisaka nzela na ye.30Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko tempe toli moko te ekoki kolonga.31Mpunda ebongisama mpo na mokolo ya bitumba,kasi elonga ewutaka na Yawe.