Masese2lin_bib

Bwanya : bomengo oyo ebombama

1Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngaimpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ;2soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanyampe okabi motema na yo na makambo ya mayele ;3soki obeleli mayelempe ogangi epai ya bososoli ;4soki oluki yango penza ndenge balukaka palatato bomengo oyo ebombama,5okososola solo soki kotosa Yawe elakisi ninimpe okozwa boyebi ya Nzambe.6Pamba te Yawe nde apesaka bwanya,mpe maloba ya monoko na Ye epesakamayele mpe bososoli.7Abongiselaka bato ya sembo elongampe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.8Pamba te abatelaka bayengebenempe nzela ya bato oyo batosaka Ye.
9Boye, okososola likambo niniezali solo, alima, sembo :nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.10Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yompe boyebi ekosepelisa molimo na yo.11Bososoli ekobatela yo,mpe mayele ekobomba yo12mpo na kobikisa yo na nzela mabe,na moto oyo alobaka makambo ezanga tina,13na bato oyo batikaka nzela ya sembompo na kolanda nzela ya molili,14na bato oyo basepelaka kosala mabe,na bato oyo bazalaka na esengoya kokota na bozindo ya mabe,15na bato oyo nzela na bango etengama-tengamampe etamboli na bango etonda na mobulu.
16Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya,liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,17oyo akima mobali na ye ya bolengempe abosana boyokani oyo asalakielongo na Nzambe na ye ;18pamba te ndako na ye ememaka na kufa,mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi.19Moto moko te oyo akotaka epai na ye azongakampe amonaka lisusu nzela ya bomoi.
20Boye, okotambola na nzela ya bato malamumpe okolanda nzela ya bato ya sembo.21Pamba te bato ya sembo bakovanda na mokili,mpe bato oyo bazangi pamela bakotikala kati na yango ;22kasi bato mabe bakokufa na mokilimpe bakolongola bango kati na mokiliya bato ya songisongi.