Masese13lin_bib

1Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye,kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.
2Mbuma ya monoko eleisaka moto bilei ya malamu,kasi molimo ya moto oyo atambolaka na bosembo teememaka na mobulu.
3Moto oyo abatelaka monoko na yeabatelaka molimo na ye,kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasiakosuka na libebi.
4Moto ya goyigoyi ayokaka baposa,kasi akoki kokokisa yango te ;nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.
5Moto ya sembo ayinaka maloba ya lokuta,kasi moto mabe amiyinisaka mpe apanzaka soni.
6Bosembo ebatelaka moto oyo atambolakaalima na nzela na ye,kasi mabe ebebisaka bongo ya moto ya masumu.
7Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi,nzokande azali na ye ata na eloko moko te ;mpe ezali na moto mosusu oyo asalakamakambo lokola mobola,nzokande azali na bozwi mingi.
8Bomengo ya mozwi ebatelaka bomoi na ye,kasi bato mabe batungisaka mobola te.
9Pole ya bato ya sembo engengaka makasi,kasi mwinda ya bato mabe ekufaka.
10Lolendo ememaka kaka na koswana,kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.
11Bomengo oyo ezwami na lombangumpe na nzela ya mabe esilaka noki,kasi bomengo oyo babakisaka na moke-mokeekomaka ebele.
12Elikya oyo ekokisami te epesaka bokono na motema,kasi posa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoi.
13Moto oyo atiolaka liloba amiyokisaka pasi,kasi moto oyo atosaka malako akozwa lifuti.
14Mateya ya moto ya bwanya ezali etima ya bomoi,ekangolaka na mitambo ya kufa.
15Boyebi ememelaka bato ngolu,kasi nzela ya bato oyo babukaka mibeko ezalaka pasi.
16Moto ya mayele asalaka makambo kolanda boyebi,kasi zoba, atandaka bozoba na ye.
17Motindami ya mabe akweyaka kati na pasi,kasi motindami ya sembo amemaka lobiko.
18Bobola mpe soni ekomelaka bato oyo baboyaka koyekola,kasi moto oyo andimaka pamela akozwa lokumu.
19Posa oyo ekokisami esalaka esengo na motema,kasi kokabwana na mabe ezali likambo ya nkelena miso ya zoba.
20Moto oyo asanganaka na bato ya bwanyaakomaka moto ya bwanya,kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazobaakomona pasi.
21Mabe elandaka bato ya masumu,kasi bolamu ezali lifuti ya bato ya sembo.
22Moto oyo asalaka bolamu atikelaka bakitani na ye libula,kasi bomengo ya moto ya masumu ebombamakampo na moyengebene.
23Bilanga ya mobola ekoki kobotela ye bilei ebele,kasi ezali na bato oyo bazali kobebampo na kozanga bosembo.
24Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbualingaka ye te,kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
25Moyengebene aliaka mpe atondaka,kasi libumu ya moto mabe ezalaka na nzala.