Masese11lin_bib

1Bimekelo kilo ya lokuta ezali lokola makambo ya nkelena miso ya Yawe,kasi kilo ya sembo ezali elengi na miso na Ye.
2Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka,kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka.3Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango,kasi mayele mabe ya bato oyo batambolakana boyengebene te ebebisaka bango.
4Bomengo ekolongisa ata moke tena mokolo ya kanda ya Nzambe,kasi bosembo ekangolaka na kufa.
5Bosembo ya moto oyo atambolaka alimaekomisaka nzela na ye sembo,kasi moto mabe akokweya mpo na mabe na ye moko.
6Bosembo ya bato oyo batambolaka alimaekangolaka bango,kasi bato oyo batambolaka na boyengebene tebakweyaka na motambo ya baposa na bango.
7Soki moto mabe akufi, elikya na ye mpe ekufi ;boye, elikya nyonso oyo etiami na bomengo na yempe ekufi.
8Moto ya sembo akokangolama na pasi,mpe moto mabe akomona pasina esika ya moto ya sembo.
9Moto ya mbindo abebisaka moninga na yena maloba ya monoko na ye,kasi boyebi ekokangola bato ya sembo.
10Tango bato ya sembo bapambolamaka,engumba esepelaka ;mpe tango moto mabe akufaka,bato bagangaka na esengo.
11Engumba etongamaka na nzela ya mapamboliya bato ya sembo,kasi ebebisamaka na nzela ya monoko ya bato mabe.
12Moto oyo atiolaka moninga na ye azangi mayele,kasi moto ya mayele avandaka kimia.
13Moto oyo aswanaka abimisaka basekele,kasi moto oyo azali na molimo ya semboabombaka basekele.
14Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya ;kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli.
15Moto oyo abetaka tolo mpo na kondimabaniongo ya mopaya akomona solo pasi,kasi moto oyo aboyaka kozwa bikateli akozala na kimia.
16Mwasi ya malamu azwaka lokumu,mpe bato ya makasi bazwaka bomengo.
17Moto oyo asalelaka bato bolamu amisalelaka nde bolamu,kasi moto na kanza amimonisaka pasi.
18Moto mabe asalaka mosala na lokuta,kasi moto oyo alonaka na bosemboakozwa lifuti ya malonga.
19Lokola bosembo ememaka na bomoi,moto oyo alandaka nzela ya mabealandaka nde nzela ya kufa.
20Bato ya kilikili bazalaka nkele na miso ya Yawe,kasi bato oyo bazangi pamela basepelisaka Ye.
21Moto mabe akosambisama solo,kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama.
22Mwasi ya kitoko, kasi azangi mayele,azali lokola lopete ya wolo na zolo ya ngulu.
23Baposa ya moto ya sembo esukaka kaka malamu,nzokande elikya ya moto mabe ezelaka kakakanda ya Nzambe.
24Moto oyo akabaka na motema malamuazwaka mingi koleka,mpe moto oyo abombaka kaka akomaka mobola.
25Moto oyo akabaka akokoma na bomengo ;mpe moto oyo apesaka bato mosusu mayi,ye mpe bakopesa ye mayi.
26Moto oyo abombaka ble, bato bakolakela ye mabe ;kasi lipamboli ezali epai na moto oyo akoteka yango.
27Moto oyo alukaka kosala bolamu akozwa ngolu,kasi pasi ekomelaka moto oyo alukaka kosala mabe.
28Moto oyo atiaka elikya na bomengo na ye akokweya,kasi bayengebene bakozala kitoko lokola makasa ya sika.
29Moto oyo akotisaka mobulu kati na ndako na yeakozwa mopepe lokola libula,mpe moto oyo azangi mayeleakokoma mowumbu ya moto ya bwanya.
30Mbuma ya moto ya sembo ezali nzete ya bomoi,mpe moto ya bwanya abengaka bato pene na ye.
31Soki moto ya sembo azwaka litomba na ye awa na mokili,ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ?