1Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele :2mpo na koyeba bwanya, kozwa mateyampe kososola maloba ya mayele ;3mpo na kozwa mateya ya bwanyaoyo epesaka bizaleli ya sembo,ya boyengebene mpe makambo ya alima ;4mpo na kopesa mayele epai ya bazoba,mpe boyebi epai ya bilenge.5Tika ete moto ya bwanya ayoka yango,mpe akobakisa bwanya na ye,bongo moto ya mayele akoyeba mayeleya kotambolisa bato ;6mpo na kososola masese mpe sambole,maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.
Fungola ya bwanya
7Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ;bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.8Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo,mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;9Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo,mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.10Mwana na ngai ya mobali,soki bato ya masumu balingi kokweyisa yo, komitika te.11Soki balobi na yo : « Yaka elongo na biso,tika ete tosala motambo mpo na koboma bato,tokosepela mpo na kokanga motooyo ayebi likambo te !12Ndenge mokili ya bakufi esalaka,tokomela ye ya bomoi, tokomela ye mobimbalokola bato oyo bakitaka na libulu ya kufa ;13tokozwa biloko ya talo ya ndenge na ndenge,mpe tokotondisa bandako na bisona bomengo ya bitumba ;14okozwa ndambo na yo epai na biso,pamba te biso nyonso tokosangisabiloko na biso esika moko ; »15mwana na ngai ya mobali, kokende elongo na bango te,longola makolo na yo na nzela na bango ;16pamba te makolo na bango ekimaka mbangumpo na kolanda mabe,mpe bapotaka mbangu mpo na kosopa makila.17Solo, ezali pamba kotia monyamaliboso ya miso ya bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.18Kasi bango, batiaka mitambompo na kosopa makila na bango moko,bamilukelaka pasi na bomoi na bango.19Moto oyo alukaka kozwa bomengo na nzela ya lokutaasukaka kaka bongo,mpe bomengo yango ebomaka kaka ye moko.
Bwanya azali kobelela
20Bwanya azali koganga na libanda,atomboli mongongo na ye na bisikaoyo bato ebele bakutanaka ;21azali koganga na bisika ya loyengempe azali koloba liboso ya ekuke ya engumba :22« Yo moto oyo ozangi mayele,kino tango nini okolinga bozoba na yo ?Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ?Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokobakoyina mayele ?23Soki boyoki makebisi na Ngai,nakosopela bino Molimo na Ngaimpe nakososolisa bino maloba na Ngai.24Kasi lokola bosundolaki Ngai tango nazalaki kobelelampe moto moko te asalaki keba tango natandaki loboko,25lokola bobwakaki toli na Ngaimpe boboyaki kondima pamela na Ngai,26Ngai mpe nakoseka bino tango pasi ekoyela bino,nakotiola bino tango minyoko ekokomela bino,27tango minyoko ekokomela bino na pwasalokola mvula ya kake makasi,tango somo ekoyela bino lokola ekumbaki,tango mawa mpe somo ekokomela bino.28Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te ;bakoluka Ngai na ngonga ya malamu,kasi bakomona Ngai te.29Lokola bayinaki boyebimpe baponaki te nzela ya kotosa Yawe,30lokola baboyaki kondima toli na Ngaimpe batiolaki pamela na Ngai,31bakolia mbuma ya etamboli na bangompe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.32Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayeleekoboma bango,mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayeleekoboma kaka bango moko ;33kasi moto oyo ayokaka Ngaiakovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »