Abidiasi1lin_bib
EMONISELI YA MOSAKOLI ABIDIASI
Etumbu ya mokili ya Edomi
1Emoniseli ya mosakoli Abidiasi.Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na tina na Edomi :« Toyoki sango moko kowuta na Yawe ;mpe ntoma moko atindami na bikolo mpo na koloba :‹ Botelema. Tokende kobundisa Edomi. ›2Tala, nakokomisa yo moke kati na bikolo,mpe okosambwa makasi.3Lolendo ya motema na yo ekosaki yo,yo movandi ya madusu ya mabanga,yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangombampe omilobelaka : ‹ Nani akokweyisa ngai na se ? ›4Ata soki omati likolo makasi lokola mpongompe otongi zala na yo kati na minzoto,nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, »elobi Yawe.5« Soki miyibi to babebisi babimeli yo na butu,likama ya ndenge nini ezali kozela yo ?Boni, bakozwa kaka biloko oyo bazali na yango posa te ?Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino bayei epai na yo,boni, bakotika ata ndambo ya maboke ya vino ?6Kasi tala ndenge babimeli Ezawu !Babotoli ye biloko na ye ya motuya oyo ebombama !7Bikolo nyonso oyo osalaki elongo na yango boyokaniekobengana yo na mokili na yo ;baninga na yo bakokosa yo, bakokonza yo.Ba-oyo bazalaki kolia lipa na yo bakotiela yo motambo.Kasi yo, okoyeba yango tempo ete okozala lisusu na mayele te.8Na mokolo wana, »elobi Yawe,« nakoboma bato ya bwanya ya Edomimpe nakolongola bato ya mayelena etuka ya bangomba ya Ezawu.9Temani, basoda na yo ya mpiko bakolenga na somo,mpe bavandi nyonso ya bangomba ya Ezawu bakokufa na mopanga !10Mpo na mabe oyo osalaki Jakobi, ndeko na yo,okotonda na soniokobebisama mpo na libela.11Ozalaki kotala kaka bongotango bato mosusu bazalaki kokendempe komema bozwi na ye nyonso.Mpe tango bapaya bakotaki kati na engumba na ye,babetaki zeke mpo na kokabolabomengo ya bitumba ya Yelusalemi.Yo mpe osalaki kaka lokola bango.12Nzokande, osengelaki te kosepelakomona pasi ya ndeko na yoto kosepela komona kobebisama ya bato ya Yudato mpe kosala lofundu na mokolo ya pasi na bango.13Osengelaki te kokota na engumba ya bato na Ngaina mokolo ya pasi na bangoto kosepela komona kobebisama na bangoto mpe kobotola bozwi na bango nyonsona mokolo oyo bazalaki na pasi makasi.14Osengelaki te kotelema na esika oyo banzela ekutanampo na koboma bato na bango, oyo bazalaki kokima pasito mpe kokaba na maboko ya banguna bato na bango,oyo babikaki na mokolo oyo bazalaki na pasi makasi.15Mokolo ya Yawe ekomi pene mpo na bikolo nyonso.Bakosala yo kaka makambo oyo yo osalaki,bongo mabe oyo osalaki ekozongela yo.16Ndenge ozalaki komela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule,ndenge wana mpe bikolo bakokoma komela tango nyonso ;bakomela, bakomela lisusu kolekampe bakosila lokola nde batikala kozala te.17Kasi bato oyo bakobika bakokimela na ngomba Siona ;ngomba yango ekokoma lisusu bule,mpe bato ya Jakobi bakozongela lisusu libula na bango.18Bato ya Jakobi bakokoma lokola moto,libota ya Jozefi ekokoma lokola lolemo ya moto.Kasi libota ya Ezawu ekokoma lokola matiti,bongo moto ya libota ya Jakobi mpe ya Jozefi ekozikisa yango.Boye, kati na bana ya Ezawu, moto ata moko te akotikala na bomoi, »elobi Yawe.19Bato oyo bakowuta na Negevibakovanda na etuka ya bangomba ya Ezawu,mpe ba-oyo bavandaka na etando ya se ya lubwakubakozwa mokili ya bato ya Filisitia.Bakozwa etuka ya Efrayimi mpe ya Samari,mpe bato ya Benjame bakozwa Galadi.20Bato ya Isalaele oyo bazalaki na bowumbubakozwa mokili ya bato ya Kanana kino na Sarepita ;bongo bato ya Yelusalemi oyo bazalaki na bowumbu na Sefaradibakozwa bingumba ya Negevi.21Babikisi bakomata na ngomba Sionampo na koyangela bangomba ya Ezawu,mpe Yawe akokoma Mokonzi.