Neyemi12lin_bib
Banganga-Nzambe mpe Balevi
1Tala Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bawutaki na bowumbu elongo na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue :Seraya, Jeremi, Esidrasi,2Amaria, Maluki, Atushi,3Shekania, Rewumi, Meremoti,4Ido, Ginetoyi, Abiya,5Miyamini, Maadia, Biliga,6Shemaya, Yoyaribi, Yedaeya,7Salu, Amoki, Ilikia, Yedaeya.
Bango nde bazalaki bakambi ya Banganga-Nzambe elongo na baninga na bango na tango ya Jozue.8Kati na Balevi, ezalaki na Jozue, Binuwi, Kadimieli, Sherebia, Yuda mpe Matania oyo, elongo na baninga na ye ya mosala, azalaki mokambi ya banzembo ya matondi.9Bakibukia mpe Uni, baninga na bango ya mosala, bazalaki kosala mosala na bango na ngambo mosusu.10Jozue abotaki Yoakimi, Yoakimi abotaki Eliashibi, Eliashibi abotaki Yoyada,11Yoyada abotaki Jonatan, Jonatan abotaki Yaduwa.12Tala bato oyo bazalaki bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe tango Yoakimi azalaki mokonzi :
mpo na libota ya Seraya : Meraya ; mpo na libota ya Jeremi : Anania ;13mpo na libota ya Esidrasi : Meshulami ; mpo na libota ya Amaria : Yoanani ;14mpo na libota ya Meluki : Jonatan ; mpo na libota ya Shebania : Jozefi ;15mpo na libota ya Arimi : Adina ; mpo na libota ya Merayoti : Elikayi ;16mpo na libota ya Ido : Zakari ; mpo na libota ya Ginetoni : Meshulami ;17mpo na libota ya Abiya : Zikiri ; mpo na libota ya Minyamini : Moadia, Pilitayi ;18mpo na libota ya Biliga : Shamuwa ; mpo na libota ya Shemaya : Jonatan ;19mpo na libota ya Yoyaribi : Matinayi ; mpo na libota ya Yedaeya : Uzi ;20mpo na libota ya Salu : Kalayi ; mpo na libota ya Amoki : Eberi ;21mpo na libota ya Ilikia : Ashabia ; mpo na libota ya Yedaeya : Netaneeli.22Na tango ya Eliashibi, Yoyada, Yoanani mpe Yaduwa, bakomaki bakombo ya Balevi oyo bazalaki bakambi ya mabota mpe bakombo ya Banganga-Nzambe na tango ya Dariusi, mokonzi ya Persi.23Bakomaki bakombo ya bakitani ya Levi oyo bazalaki bakambi ya mabota kino na tango ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi, kati na buku ya bokoko.24Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi : Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye : bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa.25Matania, Bakibukia, Abidiasi, Meshulami, Talimoni mpe Akubi, bazalaki bakengeli ya bibombelo oyo ezalaki pene ya bikuke ya Ndako ya Nzambe.26Bazalaki kosala mosala na bango na tango ya Yoakimi, mwana mobali ya Jozue mpe koko ya Yotsadaki, mpe na tango ya moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, molakisi ya Mobeko mpe Nganga-Nzambe.