Naumi1lin_bib

Kanda mpe bolamu ya Yawe

1Lisakoli na tina na engumba Ninive. Buku ya emoniseli ya Naumi, moto ya engumba Elikoshi.2Yawe azali Nzambe oyo atonda na zuwa,oyo azongisaka mabe na mabe.Yawe azongisaka mabe na mabempe atombokaka makasi.Yawe azongisaka mabe na mabeepai ya banguna na Ye,akangelaka bayini na Ye kanda makasi.3Yawe asilikaka noki te,mpe nguya na Ye ezali monene.Yawe atikaka te moto oyo asali mabelokola nde asali na ye mabe te,kasi apesaka etumbu na moto oyo asali mabe.Yawe apasolaka nzela na Ye kati na ekumbaki ,kati na mopepe makasi.4Agangelaka ebale monenempe akawusaka yango,akawusaka bibale nyonso.Etuka ya Bashani mpe ya Karimeliesili nyonso kokawuka,mpe matiti nyonso ya Libani esili kokawuka.5Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye,mpe bangomba mikuse epanzanaka.Mabele, mokili mpe bavandi na yangobalengaka liboso na Ye.6Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ?Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ?Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto,bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.
7Yawe azali malamu,azali ebombamelo ya solo na tango ya pasimpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.8Akobebisa engumba na Ye nyonso na mpelampe akobengana banguna na Ye kino kati na molili.
9Likita ya ndenge nini bakoki kosalela Yawe ?Azali Ye oyo asilisaka makambo nyonso ;pasi ekoya lisusu te.10Bakokoma lokola bato oyo bazali kati na banzube,lokola bato oyo balangwe masanga ya vino ;bakozikisama nye lokola matiti ya kokawuka.11Ezali kati na yo Ninive nde motooyo azali na mabongisi mabempo na kotelemela Yawempe azali na batoli ya mabe abimi.12Tala liloba oyo Yawe alobi :« Ata banguna na bino bazali ebele mpe makasi,bakosila kokufa mpe kolimwa.Oh mokili ya Yuda, soki nasambwisaki yo,nakosala yango lisusu te.13Nakobuka ekangiseli na bango,oyo ezali na kingo na yompe nakolongola yo na minyololo. »
14Kasi Yawe azwi mokano oyo mpo na yo :« Okotikala kozwa lisusu bakitani teoyo bakobatela kombo na yo na bokonzi.Nakolongola kati na tempelo na yobanzambe na yo ya bikeko mpe bikeko nyonsooyo basala na bibende balekisa na moto.Nazali kobongisela yo kunda,pamba te ozali na yo pamba. »