Mishe5lin_bib

Mokonzi akobotama na Beteleemi

1Bongo yo, Beteleemi Efrata,atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda,ye oyo akokonza Isalaeleakowuta kati na yo.Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza,wuta na ebandeli ya tango.2Yango wana, Yawe akosundola Isalaelekino tango mwasi oyo azalina pasi ya kobota akobota,mpe ndambo ya bandeko na ye,oyo bakotikala bakozongaepai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.3Akotelema mpe akobatela bibwele na yena nguya na Yawe,na lokumu ya Kombo ya Nzambe na ye ;mpe bakovanda na kimia,pamba te sango ya lokumu ya kombo na yeekopanzana mokili mobimba.
4Boye, akozala kimia na bango !Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasikati na mokili na biso mpe na bandako na biso,oyo batonga makasi,tokotindela bango babateli sambo ya bibwelempe bakambi mwambe ya batompo na kobundisa bango.
5Bakokamba mokili ya Asiri mpe ya Nimirodi na mopanga.Boye, akokangola biso na bokonzi ya mampinga ya Asiritango bakokota na makasi na mabele na bisompe na bandelo na yango.6Batikali ya Jakobi bakozala,kati na bikolo ebele lokola mamweoyo ewuti epai na Yawe,mpe na likolo ya matiti lokola londendeoyo ekweyaka na makasi ya moto teto mpe etalelaka moto te.
7Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota,na kati-kati ya bikolo ebele,lokola nkosi kati na banyama ya zamba,lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme :tango elekaka kati na etonga ya bameme,ekangaka mpe epasolaka yango,mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.8Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo,mpe bayini na yo nyonso babebisama nye !9« Na mokolo wana, » elobi Yawe,« nakobebisa bashar mpe bampunda ya mokili na yo,10nakobebisa bingumba ya mokili na yompe nakokweyisa bandako na yo,oyo batonga makasi ;11nakobebisa misala na yo nyonso ya kindoki,mpe okotikala lisusu na bato ya soloka te ;12nakobebisa banzambe ya bikekooyo ezali kati na yo,mpe okofukamela lisusu te bikekooyo maboko na yo esilaki kosala ;13nakobebisa makonzi ya buleya nzambe Ashera oyo ezali kati na yompe nakobebisa bingumba na yo.14Na kanda na Ngai ya makasi,nakozongisa mabe na mabe na bikolooyo etosaki Ngai te. »