1Na mikolo oyo ekoya,ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwina songe ya bangomba,ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi,mpe bikolo ekokende kotondana kuna.2Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba :« Boya, tomata na ngomba ya Yawe,na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi !Akoteya biso banzela na Yempo ete tolanda banzela mike na Ye. »Pamba te Mobeko ekowuta na Siona,mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.3Akozala Mosambisi kati na bikolo ebele,akokata makambo ya kowelana kati na mabota ya nguya,ezala oyo ezalaka mosika.Bakotumba mipanga na bango na motompo na kosala bakongo,mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli.Ekolo moko te ekotombola lisusu mopangampo na kobundisa ekolo mosusu,bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.4Moto nyonso akovanda na kimiakati na bilanga na ye ya vinompe na se ya nzete na ye ya figi.Moto moko te akobangisa ye,pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde alobi.5Ekolo na ekolo ekotambolana kombo ya nzambe na yango,kasi biso tokotambola na Kombo na Yaweoyo azali Nzambe na biso, mpo na libela.
Mabongisi ya Yawe
6« Na mokolo yango, » elobi Yawe,« Nakosangisa libota na Ngai,oyo ezali kotambola tengu-tengu ;nakoyamba oyo ezalaki na bowumbu, mosika na Ngai,mpe oyo natiaki pasi likolo na yango.7Nakosala ete libota oyo ezali kotambola tengu-tenguekoma batikali,mpe oyo bazalaki na bowumbu mosika na Ngai,libota ya nguya.Yawe akozala Mokonzi na bango, na ngomba Siona,kobanda na mokolo yango kino libela na libela.8Mpo na yo, ndako molayi ya bakengeli bibwele,ngomba ya Siona, mboka kitoko,bakozongisela yo bokonzi na yo ya kala,bakozongisa bokonzi ya Yelusalemi, mboka kitoko. »9Sik’oyo, mpo na nini ozali koganga ?Boni, ozali lisusu na mokonzi te ?Boni, mopesi toli na yo asili kokufampo ete pasi ekanga yo lokola mwasioyo azali na pasi ya kobota ?10Oh Siona, mboka kitoko,lela lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota !Pamba te sik’oyo, okobima na engumbampe okovanda kati na zamba,okokende kino na Babiloni ;mpe kuna, Yawe akokangola yona maboko ya monguna na yo.11Kasi sik’oyo, bikolo ebele esanganimpo na kotelemela yo ;bazali koloba :« Tika ete bosantu ya Siona esambwampe miso esepela komona kobebisama na yango ! »12Kasi bayebi makanisi na Yawe tempe bazali kososola mabongisi na Ye te,Ye oyo asangisaki bangolokola maboke ya matiti ya ble na etandooyo batutelaka yango.13Oh Siona, mboka kitoko,telema mpe tuta ble,pamba te nakopesa yo maseke ya bibendempe basapato ya bronze,bongo okobuka bikolo ebele mike-mikempe okopesa bomengo na bango,oyo bazwaki na nzela ya mabe,lokola likabo epai na Yawe,mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.14Oh engumba oyo elinga bitumba,sangisa basoda na yo,pamba te bazingeli biso !Bakobeta mokambi ya Isalaele fimbu na matama.