1Yawe alobaki na Mishe, moto ya mboka Moresheti, na tango Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki, moko sima na mosusu, bakonzi ya Yuda : ezalaki emoniseli oyo Mishe azwaki na tina na Samari mpe Yelusalemi.2Bino nyonso, bikolo, boyoka !Mabele elongo na nyonso oyo ezali kati na yo,botia matoyi mpe boyoka !Nkolo Yawe azwi bino na likambo ;Yawe akosambisa binowuta na Ndako na Ye ya bule !3Tala, Yawe azali koya wuta na Ndako na Ye,azali kokita, azali kotambola na likolo ya bangomba ya mabele.4Na se ya matambe na Ye, bangomba ezali kopasuka,mabwaku ezali kopanzanandenge mafuta eyandukaka na moto,ndenge mayi ya mvula etiolaka na lombanguna mipanzi ya bangomba.5Mpo na nini nyonso wana ?Ezali mpo na mabe ya Jakobi,mpo na masumu ya libota ya Isalaele.Nani atindikaki Jakobi na kosala mabe ?Boni, ezali Samari te ?Nani asalaki ete bisambelo ya likolo ya bangombaezala kati na Yuda ?Boni, ezali Yelusalemi te ?6« Nakokomisa Samari mopiku ya mabanga ;bakokoma kosala bilanga ya vino kuna.Nakobwaka mabanga na yango na lubwaku,nakosala ete miboko na yango etikala polele.7Banzambe na bango nyonso ya bikeko ekopanzana,makabo nyonso ya mbindo oyo bapesakaepai ya banzambe na bango ya bikeko ekobwakama na moto.Nakobebisa banzambe nyonso ya bikeko ya Samarimpo ete esalemaki na lifuti ya mbindo ya ekobo ya bule,mpe mpo ete basalela yango lisusu telokola lifuti ya ekobo mosusu ya bule. »
Bileli mpe matanga
8Yango wana, nakolela mpe nakosala matanga,nakotambola makolo ngulu mpe bolumbu,nakoganga lokola mbwa ya zambampe nakolela lokola maligbanga.9Pamba te bokono ya Samari esilaka te ;pota na yango ezwi mpe mokili ya Yuda,ezali kopusana kino na ekuke ya bato na ngai,kino kutu na yango moko Yelusalemi.10Boloba yango te kati na engumba Gati,bolela te !Bato ya Beti-Leafra, bomipakola putulu !11Bato ya engumba Shafiri,botambola bolumbu mpe boyoka soni !Bato ya mboka Tsanani bakobima lisusuna engumba na bango te,bato ya Beti-Atseli bazali na matanga ;boye balongoli lisungi na bango epai na yo.12Bato ya etuka ya Meroti bazali kolenga na somompo na bolamu na bango,pamba te Yawe atindi pasi ya makasikino na ekuke ya Yelusalemi.13Bino bavandi ya engumba Lakishi,bokangisa bampunda mpe bashar na bino !Bino nde bomemisaki Siona, mboka kitoko, masumu ;pamba te bamonaki masumu ya Isalaele kati na bino !14Yango wana, bokopesa na Moresheti mokandaoyo elakisi ete bokabwani na ye na libala.Engumba Akizibi ezali kokosa bakonzi ya Isalaele.15Bino bavandi ya Maresha,nakotindela bino monguna mokompo ete aya kobundisa bino ;lokumu ya Isalaele ekokima na engumba Adulami.16Bomikokola suki na mitompo na bana na bino ya mibali oyo bolingaka,ndenge esalemaka na matanga.Bomikokola suki na mitompe botikala mabandi lokola mpongo,pamba te bakomema bango na bowumbu mosika na bino.