1Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :2« Kino tango nini okokoba koloba makambo ya boye ?Maloba na yo ezali te lokola mopepe makasi ?3Boni, Nzambe abukaka mibeko,Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abalolaka penza bosembo ?4Soki bana na yo basalaki masumu liboso na Ye,apesaki nde bango etumbu mpo na mabe na bango !5Kasi yo, soki oluki Nzambe,soki osengi ngolu epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,6soki ozali peto, soki ozali sembo,akotelema Ye moko, ata sik’oyo,mpo na kokata likambo na yompe kozongisela yo libula na yo, kolanda bosembo na yo.7Bozwi na yo ya kala ekomonana moke,pamba te bozwi oyo ekoya na sima ekozala monene koleka.8Nabondeli yo, tuna bato oyo baleka liboso,kanisa mpe landela malamu bwanya ya batata na bango,9pamba te, biso, tozali bato ya lobi oyo ewuti koleka,toyebi eloko te,mpe mikolo na biso, awa na se, ezali kaka lokola elili.10Bato ya kala bakoteya yo, bakoloba na yo,mpe, na bwanya na bango, bakobimisela yo mateya oyo :11Boni, nzete ya papirisi ekoki penza kobotana esika oyo ezangi potopoto ?Nzete oyo ebotaka na mayi ekoki solo kobotana esika ekawuka ?12Ekawukaka liboso ya matiti nyonso,wana makasa na yango ezali nanu mobesu,ata bapikoli yango te.13Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonsooyo babosanaka Nzambe ;boye, elikya ya bato mabe ebebaka.14Eloko oyo batielaka motema ekokatana,pamba te elikya na bango ezalilokola ndako ya limpulututu .15Ata batieli ndako na bango motema,esimbaka te ;Ezala bakangami na yango,esimbaka kaka te.16Bazali lokola nzete ya mobesuna tango ya moyi makasi ;mandalala na yango ezipaka elanga,17elingaka misisa na yango zingazinga ya mabangampe epasolaka nzela kati na mabanga ;18kasi soki bapikoli nzete yango na esika na yango,esika yango ewanganaka nzetempe elobaka : ‹ Natikala komona yo te ! ›19Ndenge wana nde suka na yango ekozala ;mpe banzete mosusu ekobota kaka na mabele wana.20Solo, Nzambe abwakaka te bato ya sembo,mpe alendisaka te maboko ya bato mabe.21Nzokande, akotondisa monoko na yo na koseka,mpe bibebu na yo na banzembo ya esengo.22Banguna na yo bakotondisama na soni,mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »