Yobo7lin_bib
1Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kakabomoi ya pasi te ?Mikolo ya bomoi na ye ezali penzamikolo ya mongamba te ?2Ndenge mowumbu azelaka pio ya pokwato ndenge mongamba azelaka makasi lifuti na ye,3ngai nazwaki lokola libula, basanza ya pambampe babutu ya pasi na pasi.4Soki kaka nalali, nakomi komituna :‹ Tango nini nakolamuka ? ›Mpe soki kaka nalamuki :‹ Tango nini butu ekoya ? ›Nalembi komitungisa tango nyonso.5Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai,poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapotampe ekomi kolumba solo.6Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penzakoleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka ;nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.7Oh Nkolo, kobosana teete bomoi na ngai ezali kaka pema ya pamba !Miso na ngai ekomona lisusu bolamu te.8Liso oyo ezali komona ngai sik’oyoekotikala komona ngai lisusu te ;okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te.9Ndenge mapata ekendaka mpe elimwaka,ndenge wana mpe moto oyo akendaka na mboka ya bakufiazongaka lisusu te.10Akozonga lisusu te na ndako na ye,mpe ndako na ye ekoyeba ye lisusu te.11Yango wana, nakokanga monoko na ngai te,molimo na ngai ekoloba kaka na mawa,mpe motema na ngai ekolela kaka pasi na ngai.12Boni, nakomi ebale to elima ya mayimpo ete batiela ngai bikangiseli ?13Nakanisaka ete soki nalali,mbeto na ngai ekobondisa ngaimpe pongi ekokitisa pasi na ngai ;14nzokande, ozali lisusu kotungisa ngai na bandoto ya mabempe kobangisa ngai na bimoniseli ya somo.15Malamu bafina ngai kingo mpe nakufa,pamba te kufa ezali na litomba koleka bomoi oyo.16Nayini bomoi na ngai ; nawumela libela te na bomoi !Tika ngai kimia, pamba te mikolo na ngai ezanga na yango tina.17Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye,mpo ete olandelaka ye na bokebi,18mpo ete otalaka ye tango nyonsompe omekaka ye tango nyonso ?19Mpo na nini okoki kolongola miso na Yo te likolo na ngai ?Mpo na nini okoki kotika ngai kimia teata mpo na ngonga moke ?20Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu,eloko nini ngai nasali Yo ?Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai ?Boni, nakomi mokumba mpo na Yo ?21Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai tempe ozali kobosana masumu na ngai te ?Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ;okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »