1Yawe ayanolaki Yobo kati na mopepe makasi :2« Nani azali kobebisa mabongisi na ngaina maloba ezanga tina ?3Lata mokaba na yo lokola elombe mobali ;nakotuna yo mituna mpe okoyanola ngai.4Ozalaki wapi tango ngai nasalaki mabele ?Yebisa ngai soki ozali mayele.5Nani akataki mondelo na yango, oyebi ye ?Nani amekaki molayi na yango na singa ?6Makolo ya makonzi na yango evandi likolo ya nini ?Nani atiaki libanga na yango ya songe,7tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongompe tango bana na Nzambe bazalaki koganga na esengo ?8Nani akangaki ebale monene na bikuke ya makasitango yango ebimaki wuta na mabele,9tango nakomisaki mapata elamba na yango,mpe molili, singa ya kokangela yango,10tango natielaki yango bandelo,tango natielaki yango bikuke ya makasi,11tango nalobaki : ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te ;awa nde ekosukela mbonge ya lolendo na yo ? ›12Boni, osili kopesa tongo mitindoto osili kolakisa tongo-tongo esika na yango,13mpo ete esimba bandelo ya mokilimpe ebimisa bato mabe ?14Mabele ebongwani lokola potopoto oyo batia kashe,mpe nyonso emonani lokola elatisami elamba.15Bazangisi bato mabe polempe babuki loboko oyo etombwami mpo na kosala mabe.16Osila kokoma kino na etima ya ebale monene ?Osila kotambola na se ya libulu ya molili ?17Boni, basila kolakisa yo bikuke ya kufa ?Osila komona bikuke ya elilingi ya kufa ?18Miso na yo esila komona kino na bitando monene ya mokili ?Loba yango soki oyebi makambo oyo nyonso.19Wapi nzela oyo ememaka na pole ?Bongo molili ezalaka wapi20mpo ete omema yango na bisika na yangompe oyeba banzela oyo ememaka na esika oyo evandaka ?21Solo, oyebi yango malamu,pamba te osilaki kobotamampe motuya ya mikolo na yo ezali ebele.22Boni, osila kokoma na esikaoyo babombaka mvula ya pembempe na esika oyo babombaka mvula ya mabanga ?23Nabombaki yango mpo na tango ya pasimpe mpo na mikolo ya bitumba.24Na nzela nini pole ebimakampe mopepe ya ngambo ya este epanzanaka ?25Nani atimola nzela mpo na mvula makasi,nani apasola nzela mpo na mokalikali ya bakake26mpo na konokisa mvula na esika oyo ezanga bato,na esika ya esobe oyo bato bavandaka te,27mpo na kosopa mayi na bisika oyo ezanga bato mpe ekawuka,mpe mpo na kobotisa matiti ya mobesu ?28Boni, mvula ezali nde na tata ?Nani abotaki matanga ya mamwe ?29Libumu ya nani ebotaki mayi ya libanga ?Nani abotaki londende oyo ewutaka na likolo ?30Tango nini mayi ekomaka libangampe likolo ya mayi ya mozindo ekomaka libanga ?31Okoki kokanga na singa Minzoto sambo esika mokoto kofungola basinga ya Minzoto minei ?32Okoki kobimisa bilembo ya Zodiake na tango na yangompe kokamba Ngombolo elongo na bana na yango ?33Oyebi mibeko ya likolo ?Okolonga kokokisa bokonzi na yango na mokili ?34Okoki kotombola mongongo na yo na mapatampo ete mayi ebele ezipa yo ?35Okoki kotinda bakake ete ebima na banzela na yangompe eloba na yo : ‹ Tala biso oyo ? ›36Nani atia bwanya na motema ya mototo nani apesa soso mayele ?37Nani azali na bwanya mpo na kotanga mapatampe kosopa mayi ya nzungu ya likolo38mpo ete putulu etiola elongo lokola ebende oyo enyangolami na motompe mpo ete maboke ya mabele ekangama esika moko ?39Boni, yo nde okokoka koboma nyama mpo na nkosi ya mwasimpe kosilisa nzala ya bana na yango40tango elalaka kati na mabulu na yangompe emilengelaka na se ya banzete ya makasa ebele ?41Nani abongiselaka yanganga bileitango bana na yango egangaka epai ya Nzambempe tango eyengaka-yengaka mpo na kozanga bilei ?