Yobo24lin_bib

1Mpo na nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akataka tango tempo na esambiselo ?Mpo na nini bato oyo bayebi Yebasengeli koluka na pamba mikolo ya boye ?2Bato bapusaka bandelo,bakendaka koleisa bibwele oyo bayibaki,3babotolaka ane ya mwana etikempe bazwaka lokola ndanga ngombe ya mobaliya mwasi oyo akufisi mobali ;4balongolaka babola na nzela,mpe batindaka na makasi babola nyonso ya mokili ete babombama.5Lokola ba-ane ya zamba, babola bakendaka tongo-tongona mosala mpo na koluka biloko ya kolia,kasi kaka esobe nde epesaka bana na bango bilei ;6bakataka matiti na bilanga mpo na bibwelempe balokotaka bambumaoyo etikalaka na bilanga ya vino ya moto mabe.7Na butu, balalaka bolumbu mpo na kozanga bilamba,bazangi bulangeti mpo na komifinika na tango ya malili ;8bapoli na mvula ya ngomba,bakangami na mabanga mpo na kozanga esika ya kobombama.9Bazali kobotola mwana etike na mabele ya mama na ye,bazali kokanga mwana ya mobola mpo na niongo.10Soki bazangi bilamba, batambolaka bolumbu ;bamemaka maboke ya nzete ya ble,kasi bazongaka kaka na nzala.11Bakamolaka bambuma ya olive kati na mapango ya bato mosusu,bakamolaka bambuma ya vino,kasi bazongaka kaka na posa ya komela.
12Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka,mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali kogangampo na koluka lisungi,kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te.13Bato oyo bazali kosala bongo,bazali kotombokela pole,bayebi nzela na Ye tempe batambolaka ata kati na yango te.14Mobomi azali kotelema na moyimpe koboma mobola elongo na moto akelela ;na butu, azali lokola moyibi.15Liso ya moto ya ekobo ezelaka ete molili ekota ;amilobelaka : ‹ Moto moko te akomona ngai, ›mpe abombaka elongi na ye.16Kati na molili, bato balukaka kobuka bandako ya bato ;kasi na moyi, bamikangelaka na ndako,bazali koboya pole.17Mpo na bango, molili makasi ezali nde tongo,somo ya molili ekomaka moninga na bango.
18Nzokande bazali lokola fulufulu likolo ya etando ya mayi,eteni ya mabele na bango elakelami mabe epai ya bato ya mboka,yango wana moko te azali kokende na bilanga ya vino.19Ndenge kokawuka mpe moyi makasi emelaka mayi ya mvula pembe,ndenge wana mpe mboka ya bakufi emelakabato oyo basalaka masumu.20Libumu ya mama ebosanaka bangompe bankusu esepelaka kolia bango.Bakanisaka bango lisusu te,pamba te mabe na bango esili kobukana lokola nzete.21Bato mabe basepelisaka basi bazangi banampe bato oyo babotaka te,kasi basalaka bolamu te epai ya mwasi oyo akufisa mobali.22Kasi Nzambe, na nguya na Ye,abakisaka mikolo ya banyokoli na bango ;ata batombolami, bazalaka na elikya tempo na bomoi na bango.23Nzambe apesaka bango kimia,kasi miso na Ye etalaka nzela na bango.24Mpe atako sik’oyo bazali bato minene,na tango moke bakozala lisusu te,bakokweya mpe bakokufa lokola moto nyonso,bakokatama lokola mito ya ble.
25Soki ezali bongo te, nani akoki kolakisa ngaiete nazali koloba lokuta ?Nani akoloba ete maloba na ngai ezali ya pamba ? »