1Tsofari, moto ya engumba ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki :2« Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano ?Moto oyo azali koloba alonga na ye,kaka mpo ayebi koloba ?3Bato bavanda kaka nye likolo ya maloba na yo ya pambaoyo ozali kobimisa ?Bapamela yo te soki ozali kosala maseki ?4Ozali koloba na Nzambe :‹ Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo ;nazali sembo na miso na Yo. ›5Oh, tala ndenge nini nazali na posaete Nzambe aloba,ete afungola monoko na Ye mpo na kopamela yo,6mpe asosolisa yo basekele ya bwanya,pamba te bwanya ya solo ezalaka na bilongi mibale.Yeba likambo oyo :Nzambe abosana masumu na yo ebele.7Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe ?Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ?8Bandelo yango eleki Lola na likolo ;yo penza okosala nini ?Eleki mboka ya bakufi na bozindo ;yo penza okoyeba nini ?9Molayi ya bandelo yango eleki mokili na molayi,mpe eleki ebale monene na kopanzana.10Soki akotisi yo na bolokompe asangisi basambisi mpo na kokata likambo,nani akotelemela Ye ?11Solo, ayebaka bakosimpe asosolaka mabe na pete.12Ndenge mwana ya ane ya zamba ebotaka moto te,ndenge mpe kizengi akokoka te kokoma mayele.13Nzokande, soki opesi Ye motema na yompe osemboli maboko na yo epai na Ye,14soki olongoli lisumu oyo ezali na loboko na yompe opekisi mabe kovanda kati na ndako na yo,15okotombola elongi na yo na soni te,okotelema ngwi mpe okobanga eloko te ;16pamba te okobosana pasi na yo,okokoma kokanisa yango kakalokola mayi oyo esili kotiola.17Bomoi na yo ekongengalokola pole ya moyi oyo engengaka na midi,mpe butu na yo ekokoma lokola tongo.18Okozala na kimia, pamba te elikya ezali,okotala zingazinga na yo mpe okozwa bopemi na yo na kimia,19okolala pongi, mpe okomona moto moko tekobangisa yo lisusu,mpe bato ebele bakoya kosenga ngolu na yo.20Kasi miso ya bato mabe ekokufa,mpe bakozanga ekimelo,bakotikala na elikya se moko : kufa. »