1Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe,nalingaki ata kokima bato na ngaimpe kozala mosika na bango,pamba te bango nyonso bazali bandumba,bazali lisanga ya bakosi !2« Babongisaka lolemo na bangolokola tolotolo mpo na kokosa ;balongaka kati na mokili na nzela ya solo te,pamba te basalaka se mabe likolo ya mabempe batosaka Ngai te, »elobi Yawe.3« Tika ete moto na moto asala keba na moninga na yempe atia motema te na ndeko na ye,pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta,mpe moninga nyonso azali moto ya matongi.4Moninga azali kokosa moninga na ye,mpe moto moko te azali koloba solo.Bamibongisaka mpo na koloba lokuta,babimisaka motoki na bango mpo na kosala masumu.5Mosala na bango se kokosa na kokosa ;mpe na lokuta na bango, baboyaka kotosa Ngai, »elobi Yawe.6Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :« Tala, nakopetola mpe nakomeka bango na moto,pamba te nasala lisusu ninimpo na masumu ya bato na Ngai ?7Lolemo na bango ezali lokola likonga oyo ebomaka,ebimisaka kaka maloba ya lokuta.Moto na moto alobaka na moninga na yena esengo na monoko ;kasi na se ya motema, atielaka ye motambo.8Bongo na makambo ya boye,napesa bango etumbu te, »elobi Yawe ?« Nazongisa mabe na mabe te na ekolo ya boye ? »9Nakosala matanga mpe nakolelampo na bangomba mpe matiti ya esobe.Nyonso esili kokawukampe moto moko te azali lisusu kolekela wana ;ezala makelele ya bibwele to ya bandekeezali lisusu koyokana te ;bandeke ya likolo ekimimpe banyama ya zamba esili kokende.10« Nakokomisa Yelusalemiliboke ya mabanga oyo ebukana-bukana,ndako ya mbwa ya zamba ;nakobebisa bingumba ya Yuda,bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.11Nani azali penza na bwanyampo na kososola makambo ya boye ?Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango ?Mpo na nini mokili ebebisami,etikali pamba lokola esobeepai wapi moto alekaka te ? »12Yawe alobi : « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te.13Nzokande, batiaki kaka mito makasi mpe bakobaki kolanda banzambe ya Bala oyo batata na bango balakisaki bango. »14Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tala, nakoleisa bato oyo matiti ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge.15Nakopanza bango kati na bikolo oyo, ezala bango to bakoko na bango, batikalaki koyeba te ; nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango. »16Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :« Botala malamu makambo oyo !Bobengisa basi oyo balelaka bibembe,bobengisa penza ba-oyo bayebi kolela malamu !17Tika ete baya noki mpo ete bayembela bisobanzembo ya mawa kino tango mpinzoli ekobima bisompe ekotondisa miso na biso.18Kolela ya mawa ezali koyokana wuta na Siona :‹ Ah ! Tala ndenge nini tosili kobebisama !Tala ndenge nini tosambwe !Tika ete tokima mokili na biso,pamba te bandako na biso ebebisami. › »19Eh basi, boyoka Liloba na Yawe !Bofungola matoyi mpo na koyoka maloba ya monoko na Ye.Bolakisa bana na bino ya basi banzembo ya mawampe tika ete moko na mokoayekolisa moninga na ye nzembo ya mawa.20Kufa emati mpe ekotina nzela ya maninisa na biso,ekoti kino na bandako na biso,oyo batonga makasi ;eyei kosilisa koboma bana na babalabala,mpe bilenge mibali na bisika oyo bato ebele bokutanaka.21Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi :‹ Bibembe ya bato ekolala na mabelempe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga,lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atikina sima na yempe moto oyo akolokota yango azali te. › »
Bwanya ya solo
22Tala liloba oyo Yawe alobi :« Tika ete moto ya bwanya amikumisa tempo na bwanya na yeto moto ya makasi mpo na makasi na yeto moto ya bozwi mpo na bozwi na ye.23Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisampo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai,mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu,bosembo mpe boyengebene na mokili ;pamba te nasepelaka nde na makambo wana, »elobi Yawe.24« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te :25bato ya Ejipito, ya Yuda, ya Edomi, ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi nyonso ya esobe oyo bamikataka mandefu ; pamba te bato ya bikolo oyo nyonso bakatama ngenga te. Mpe ezala bana nyonso ya Isalaele oyo bakatama ngenga, bakatama yango kaka na bonzoto, kasi na mitema te. »