Jeremi50lin_bib

Kosambisama ya Babiloni

1Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Babiloni mpe bato na yango :2« Sakola mpe tatola yango kati na bikolo,telemisa bendele !Sala ete bato nyonso bayeba yango,kobomba likambo moko te !Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni !Beli akoyokisama soni !Mariduki akobukana !Bililingi na ye ekosambwa,mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›3Ekolo moko ekowuta na nor mpe ekobundisa Babiloni,ekobebisa yango,bongo moto moko te akovanda lisusu kuna ;ezala bato to banyama, nyonso ekokima.
4Na tango wana, na mikolo wana, »elobi Yawe,« bana ya Isalaele elongo na bato ya Yuda bakokende na kolelampo na koluka Yawe, Nzambe na bango.5Bakotuna nzela oyo ememaka kino na Sionampe bakobalola bilongi na bango na ngomba yango ;bakolobana bango na bango :‹ Boya, tika ete tokangama na Yawena nzela ya boyokani oyo ezali na suka te,boyokani oyo tokoki kobosana te ! ›
6Bato na Ngai bazalaki lokola bamemeoyo ebungi nzela ;babateli na bango babungisaki bango nzela,basalaki ete bayengayenga na bangomba,batambola-tambola na bangomba milayi mpe mikusempe babosana lopango na bango ya kopemela.7Moto nyonso oyo azalaki komona bangoazalaki koboma bango,banguna na bango bazalaki koloba :‹ Tozali na biso na ngambo te,mpo ete basali masumu liboso ya Yaweoyo azali lokola lopango na bango ya bosembo ;liboso ya Yawe, elikya ya batata na bango. ›
8Bobima mbangu na Babiloni,botika mokili ya Babiloni !Bozala lokola bantaba ya mibalioyo ezali kotambola liboso ya etonga.
9Pamba te nakotelemisampe nakoyeisa lisanga ya bikolo ya nguyaoyo ekowuta na mokili ya normpo na kobundisa Babilonimpe kobotola yango wuta na nor ;makonga na bango ekozalalokola makonga ya basoda ya mpiko,oyo bazangaka koboma te.10Boye, bakobotola bomengo ya Babilonimpe bato nyonso oyo bakobotola yango bakotonda, »elobi Yawe.
11« Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo,bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai ;mpo ete bozali kopumbwa-pumbwalokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika blempe kolela lokola bampunda,12mama na bino akoyoka soni makasi ;ye oyo abotaki bino akosambwa.Ekozala ekolo ya suka kati na bikolo,ekozala zelo na zelo, mabele ya kokawuka mpe esobe.13Likolo ya kanda ya Yawe,bato bakovanda lisusu na Babiloni tempo ete ekobebisama nye.Bato nyonso oyo bakoleka na Babilonibakokamwa mpe bakozala na somoya komona bapota na yango nyonso.
14Bino bato nyonso oyo bobundaka na matolotolo,bomitanda na molongo zingazinga ya Babilonimpe bobeta yango makonga !Botika ata likonga moko te,pamba te Babiloni asali masumu liboso ya Yawe.15Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso !Ayei komitika ye moko,mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi,bamir na ye ebukani :ezali na lolenge oyo ndeYawe azongiseli ye mabe na mabe.Bozongisela ye makambooyo ye asalaki bikolo mosusu.16Boboma wuta na mokili ya Babilonibato oyo basalaka bilangampe bato oyo basimbaka mbeli mpo na kobuka mbuma.Likolo ya mopanga ya monyokoli,tika ete moto na moto azonga na mokili na ye,tika ete moto na moto akima na mokili na ye.
17Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela,oyo nkosi ezalaki kolanda :Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya libosooyo apasolaki Isalaele ;Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni,azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa.18Yango wana tala makambooyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,Nzambe ya Isalaele, alobi :‹ Nakopesa mokonzi ya Babiloni mpe mokili na yeetumbu ndenge napesaki mokonzi ya Asiri.19Kasi nakozongisa Isalaele na lopango na ye ;mpe akolia lisusu matiti ya ngomba Karimeli mpe ya Bashani.Nzala na ye ekosila na etuka ya bangombaya Efrayimi mpe ya Galadi.20Na tango wana, na mikolo wana, ›elobi Yawe,‹ bakoluka ngambo nini Isalaele amemikasi bakomona yango te,masumu nini Yuda asali kasi bakomona yango te ;pamba te nakolimbisa batikali oyo nabikisi.
21Bobundisa mokili ya Meratayimimpe bavandi ya Pekodi ;bolanda bango, boboma mpe bobebisa bango nye, ›elobi Yawe.‹ Bosala makambo nyonso oyo natindi bino.22Makelele ya bitumba ezali kati na mokili,lokito ya kobebisama monene !23Ndenge nini marto oyo ezalaki kobeta mokili mobimbaebukani mpe epanzani ?Ndenge nini penza Babiloni ebebisami kati na bikolo ?24Oh Babiloni, nasili kotiela yo motambo,mpe ekangi yo liboso ete oyeba yango.Omonanaki mpe okangamakimpo ete otelemelaki Yawe.25Yawe afungolaki bibundeli na Ye nyonsompe abimisaki kati na yango bibundeli ya kanda na Ye ;pamba te yango nde mosalaoyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,asili kosala na mokili ya bato ya Babiloni.26Bobimela wuta na bisika nyonso mpo na kobundisa ye,bobuka bibombelo na ye,bokangisa bomengo ya bitumbandenge bakangisaka maboke ya ble,bobebisa yango nyonso mpe botika ata eloko moko te.27Boboma bana ngombe mibali na ye nyonso ;tika ete ekende na esika oyo babomelaka banyama !Mawa na bango mpo ete mokolo na bango ekoki,tango mpo na bango ya kozwa etumbu.
28Boyoka ! Tala bango bazali kokimampe babiki wuta na mokili ya Babilonimpo na koyebisa kati na Sionandenge nini Yawe, Nzambe na biso,azongisi mabe na mabe ;ndenge nini azongisi mabe na mabe likolo na Tempelo na Ye.
29Bosangisa bato nyonsooyo babundaka na matolotolompo na kotelemela Babiloni ;tika ete bato nyonso oyo babundaka na makongabazingela Babiloni mobimba,basala ete ata moto moko te akima,bafuta yango ndenge ezalaki misala na yangompe bazongisela yango makambooyo esalaki bikolo mosusu ;pamba te ebetaki tembe na Yawe,Mosantu ya Isalaele.30Yango wana, na mokolo wana,bilenge mibali na yango bakokweya na babalabala,basoda na yango nyonso ya mpiko bakokanga minoko, ›elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.31‹ Tala, nazali na kanda na yo, yo mboka ya lolendo, ›elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ;‹ pamba te mokolo na yo ekoki,tango na yo ya kozwa etumbu.32Ekolo ya lolendo ekobeta libaku mpe ekokweya,mpe moto moko te akoya kosunga yango ;nakopelisa moto kati na bingumba na yango,mpe moto yango ekozikisa bato nyonsooyo bazingeli yango. ›33Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :‹ Bazali konyokola bana ya Isalaele mpe bato ya Yuda ;bato nyonso oyo bakangaki bangompe bamemaki bango na bowumbubaboyi kotika bango.34Nzokande, Mosikoli na bango azali na makasi,Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ;akokotela bango na molendempo ete amema kimia na mokili na bangompe mobulu epai ya bavandi ya Babiloni.35Mopanga, boma bato ya Babiloni ;boma bavandi ya Babiloni,boma bakambi mpe bato na yango ya bwanya, ›elobi Yawe !36‹ Mopanga, boma basakoli na yango ya lokuta ;tika ete bakoma bato ya maboma !Mopanga, boma basoda na yango ya mpiko ;tika ete bakoma na somo !37Mopanga, boma bampunda mpe bashar na yango,bapaya nyonso oyo bazali sima na yangompo ete bakoma lokola basi !Mopanga, bebisa bomengo na yangompo ete ekoma bomengo ya bitumba !38Bokawuki, kweyela mayi na yango mpo ete ekawuka ;pamba te ezali mokili ya banzambe ya bikeko,bikeko oyo epesaka bato somo !
39Bikelamu ya esobe mpe bambwa ya zambaekokoma kovanda kuna ;maligbanga mpe ekokoma kovanda kuna.Bato bakovanda lisusu kuna teto moto moko te akotikala kuna mpo na libela.40Ndenge Nzambe abebisaki Sodome mpe Gomoreelongo na bingumba na yango ya zingazinga, › »elobi Yawe,« moto moko te akovanda lisusu kuna,moto moko te akowumela kati na yango.41Tala, mampinga moko ya basoda ezali koya wuta na nor,ekolo moko monene mpe bakonzi ebele bazali komibongisampo na bitumba wuta na basuka ya mabele.42Basimbi matolotolo mpe makonga,bazali bato na kanza mpe bazanga mawa,bazali koganga lokola makelele ya ebale monene,bamati likolo ya bampunda,batandami na milongo lokola basodampo na kobundisa yo Babiloni, mboka kitoko !43Tango mokonzi ya Babiloni ayokaki sango na tina bango,alembaki nzoto, somo makasi ekangaki yempe akomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.44Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordanimpo na kokende na mapangoepai wapi babokolaka bibwele,ndenge wana mpe nakobengana Babilonina mokili na yango na mbala moko ;Ngai moko nakopona motooyo akokoma mokonzi ya Babiloni.Nani akokani na Ngai ?Nani akoki kobeta tembe na Ngai ?Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ? »
45Yango wana, boyoka mabongisi oyoYawe asili kosala mpo na Babiloni,mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemelamokili ya bato ya Babiloni :Bakobengana bango na lopangolokola bana mike ya etonga,akobebisa etando na bango.46Na lokito ya kokweya ya mokili ya Babiloni,mabele ekoningana ;makelele na yango ekoyokanakino na bikolo mosusu.