Jeremi48lin_bib

Kosambisama ya Moabi

1Na tina ya Moabi :
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi :
« Mawa na engumba Nebo, pamba te ekobebisama !Kiriatayimi ekoyokisama soni mpe bakobotola yango,ndako makasi ekoyokisama soni mpe ekobukana.
2Moabi ekozala lisusu na lokumu te,bato bakosalela yango likita kati na Eshibonimpo na kokweyisa yango :‹ Boya, tokweyisa ekolo oyo ! ›Yo mpe, engumba Madimeni, okokanga monoko ;mopanga ekolanda yo.3Yoka makelele oyo ezali kobima kuna na Oronayimi :ezali lokito ya bitumba mpe ya kobebisama !4Moabi ebebisami makasi penzampe bana na yango bazali kolela.5Bazali komata na kolela,nzela-nzela mpo na kokende na Luyiti ;mpe tango bazali kokita na Oronayimi,koganga ya mawa ezali koyokanampo ete Moabi esili kobebisama.6Bokima !Bopota mbangu mpo na kobikisa bomoi na bino ;bokoma lokola nzete ya kokawuka kati na esobe !7Lokola bozali kotia mitema na misala na binompe na bomengo na bino,bino mpe bokokende na bowumbu ;boye Kemoshi mpe akokende na bowumbuelongo na Banganga-Nzambe mpe bakambi na ye.8Mobebisi akoya koboma bingumba nyonsompe ata engumba moko te ekobika ;lubwaku ekobebisama,mpe etando ya likolo ya bangomba ekobebisama,pamba te Yawe alobi.9Bobongisa kunda mpo na Moabimpo ete ekobebisama solo ;bingumba na yango ekotikala pamba,mpe bato bakovanda lisusu kuna te.
10Tika ete moto oyo asalelaka Yawena kozanga komipesa alakelama mabe !Tika ete moto oyo apelisaka mopanga na yempo ete etangisa makila alakelama mabe !
11Moabi ezalaki na kimia wuta bolenge na yangolokola masanga ya vino oyo baningisi te,oyo babongoli na mbeki mosusu te,mpo ete etikala nanu kokende na bowumbu te.Boye, elengi na yango ebongwana tempe solo na yango etikala kaka ndenge ya kala.12Kasi na mikolo ekoya, »elobi Yawe,« nakotindela Moabi bato oyo bakobongola yangolokola masanga ya vino na mbeki mosusu :bakosopa yango,bakosilisa yango na mbekimpe bakobuka mbeki na yango.13Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshindenge bato ya Isalaele bayokaki sonitango batiaki mitema na Beteli.
14Ndenge nini bokoki koloba :‹ Tozali basoda ya mpiko,bato ya makasi, bilombe ya bitumba ? ›15Mokili ya Moabi ekobebisama,mpe bakobotola bingumba na yango na makasi ;bilenge mibali oyo Moabi etielaka motemabakokufa na mopanga, »elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.16« Kobebisama ya Moabi ezali na nzela,pasi na yango ekoya na lombangu penza.17Bino bazalani nyonso ya Moabi,bosalela ye matanga ;bino bato oyo boyebi sango ya lokumu na ye,boloba : ‹ Ah, tala ndenge lingenda ya nguya,lingenda ya bokonzi ya nkembo, ebukani ! ›
18Oh bato ya elenge mwasi Diboni,botika nkembo na binompe bovanda na esobe ;pamba te moto oyo akoya kobundisa Moabiakoya mpe kobundisa binompe kobebisa bingumba na binooyo batonga makasi !19Bino bavandi ya Aroeri,botelema na nzela mpe botala malamu,botuna mobali oyo azali kokimampe mwasi oyo asili kobikisa bomoi na yesoki makambo nini esili kosalema !20Moabi ezali na sonimpo ete esili kokweya.Bolela mpe boganga,bobelela na Arinoni ete mokili ya Moabi ebebisami !21Kosambisama ekweyi na mokili ya etando ya likolo ya bangomba :na Oloni, na Yakatsi mpe na Mefati,22na Diboni, na Nebo mpe na Beti-Diblatayimi,23na Kiriatayimi, na Beti-Gamuli mpe na Beti-Meoni,24na Kerioti mpe na Botsira,na bingumba nyonso ya Moabi,ezala oyo ezali mosika to oyo ezali pene.
25Liseke ya Moabi ebukanimpe loboko na ye ekatani, »elobi Yawe.
26« Bolangwisa ye masanga,pamba te abetaki tembe na Yawe !Tala ye Moabi ndenge azali kobaluka kati na bisanza na ye !Tika ete, ye mpe, akoma eloko ya maseki !27Boni, Isalaele azalaki eloko ya maseki tena miso na bino ?Bokangaki ye kati na miyibimpo ete bokoma koseka yetango nyonso bokolobela kombo na ye ?28Bino bavandi ya Moabi, bosundola bingumba na binompe bokende kovanda kati na mabanga !Bozala lokola ebenga oyo etongakazala na yango kati na mabanga.
29Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi,lolendo oyo eleka penza ndelo !Tala ndenge amatisaka mapeka !Atondi na lofundu,azali na monoko makasi,mpe motema na ye emikitisaka te.30Nayebi ete monoko makasi na yeezali kaka pamba, »elobi Yawe,« mpe lolendo na ye esalaka eloko moko te.31Yango wana nazali kolela mpo na Moabi,nazali kolela mpo na Moabi nyonso ;nazali kosala matanga mpo na bato ya Kiri-Eresheti.32Oh elanga ya vino ya Sibima, nazali kolela mpo na yondenge engumba Yaezeri ezali kolela !Bitape na yo epanzani kino koleka mayi monene,ekomi kino na mayi monene Yaezeri.Mobebisi akweyeli mbuma ya bilanga na yompe mbuma ya vino na yo.33Esengo mpe kosepela esili kolimwana bilanga mpe na bazamba ya Moabi ;nakawusi vino kati na bikamolelo na bango,mpe moto oyo akokamola yango na esengo azali te.Atako bato bazali kogangakasi ezali makelele ya esengo te.
34Makelele mpe koganga ezali komatawuta na Eshiboni kino na Eleale mpe Yakatsi,wuta na Tsoari kino koleka Oronayimi mpe Egilati-Shelishiya ;pamba te, ezala mayi ya Nimirimi esili kokawuka.35Nakoboma bato nyonsooyo bakendaka na bisambelo ya likolo ya bangombampe batumbaka malasi ya ansa lokola mbekaepai ya banzambe na bango,kati na mokili ya Moabi, »elobi Yawe.36« Mpe motema na Ngai ezali kolela Moabindenge flite ebetaka,ezali kolela lokola flite mpo na bato ya Kiri-Eresheti.Bomengo na bango nyonso esili kobunga.37Bakokoli suki ya mito ya bato nyonso,bakati moto moko na moko mandefumpe bazokisi moto moko na moko na loboko.38Na likolo ya bandako nyonso ya Moabimpe na bisika nyonso oyo bato balekelaka,ezali na likambo mosusu te, kaka ebembe ;pamba te nabebisi Moabi lokola eloko oyo bato balingaka te, »elobi Yawe.39« Tala ndenge nini apanzani,tala ndenge nini bazali kolela !Ndenge nini Moabi apesi mokongo na soni !Moabi akomi eloko ya kotiola, eloko ya koyokana miso ya bato nyonso oyo bazingeli ye. »
40Tala liloba oyo Yawe alobi :« Tala ndenge nini mpongo ezali kokita na elulumpe etandi mapapu na yango likolo ya Moabi.41Bakobotola Kerioti mpe bandako na yango oyo batonga makasi.Na mokolo wana, mitema ya basoda ya mpiko ya Moabiekokoma lokola motema ya mwasioyo azali na pasi ya kobota.42Mokili ya Moabi ekobebisamampe ekotikala lisusu ekolo te ;pamba te ebetaki tembe na Yawe.43Somo, libulu mpe motambo ezali kozelabino bato ya Moabi, »elobi Yawe.44« Moto nyonso oyo akokima somoakokweya na libulu,mpe moto nyonso oyo akobima na libuluakokangama na motambo,pamba te nakoyeisa mobu ya etumbuna mokili ya Moabi, »elobi Yawe.45« Bato oyo bazali kokima bakozanga lisungina elili ya engumba ya Eshiboni,pamba te moto moko ewuti na Eshiboni,moto ebimi na ndako ya mokonzi Sikoni,etumbi bandako batonga makasi ya Moabimpe mito ya bato ya lolendo.46Oh Moabi, mawa na yo !Bato ya Kemoshi babebisami,bana na yo ya mibali bakangami na bowumbu,mpe bana na yo ya basi bakokende na bowumbu !47Nzokande, na mikolo ekoya,nakozongisa lokumu ya Moabi, »elobi Yawe.Kosambisama ya Moabi esuki awa.