Jeremi4lin_bib
1« Oh Isalaele, soki okozonga,zonga epai na Ngai, »elobi Yawe,« soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngaimpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai ;2soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo :‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambolampe ekomipesa nkembo mpo na yo. »3Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi :« Bokata bilanga ya sika,mpe botika kolona kati na banzube.4Bomibulisa mpo na Yawe,bopetola mitema na bino,bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ;noki te kanda na Ngai ekopelampe ekozikisa bino lokola motompo na mabe oyo bozali kosala ;ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.