Jeremi17lin_bib
1« Masumu ya Yuda ezali lokola makomioyo bakoma na ekomeli ya ebendeoyo ezali na songe ya diama ;bakoma yango na bitando ya mitema na bangompe na maseke ya bitumbelo na bango.2Ndenge bakanisaka bana na bango ya mibali,ndenge wana mpe bakanisaka bitumbelo na bangompe makonzi ya Ashera, nzambe mwasi,pembeni ya banzete ya mibesuna likolo ya bangomba.3Oh ngomba na Ngai kati na mokili,nakokaba lokola bomengo ya bitumba :biloko na yo, bozwi na yo nyonsompe bisambelo na yo ya likolo ya bangombampo na masumu oyo osalaki kati na mokili na yo.4Likolo ya mabe na yo,okobungisa libula oyo napesaki yo,nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yokati na mokili oyo oyebi te ;pamba te opelisi kanda na Ngai,mpe ekopela mpo na libela. »5Tala liloba oyo Yawe alobi :« Tika ete moto oyo atiaka elikya na moto,oyo ayekamelaka eloko ya petempe atalelaka Yawe te,alakelama mabe !6Akozala lokola mwa nzete ekawuka kati na esobe ;akomona bolamu te tango ekoya,akovanda na bisika ya kokawuka ya esobe,na mokili ya mungwa epai wapi bato bazalaka te.7Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawempe atalelaka Ye apambolama !8Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi,oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi :ezalaka na somo ya moyi makasi te ;makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso.Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki tempe ebotaka mbuma tango nyonso. »9Motema eleki biloko nyonso na lokutampe ekoki kobika te ;nani akoki koyeba yango ?10« Ngai Yawe,nayebi motema mpe nasosolaka malamumakanisi na yango,mpo na kofuta moto na motokolanda etamboli mpe misala na ye. »11Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo teazali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu.Boye, bomengo yango ekokimana kati-kati ya bomoi na yempe ekomonisa bozoba na yena suka ya bomoi na ye.12Kiti ya Bokonzi ya nkembo,oyo enetolama wuta na ebandeliezali nde Esika na biso ya bule.13Oh Yawe, Elikya ya Isalaele,bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni,bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka,pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.14Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika ;Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama,mpo ete nakumisaka nde Yo !15Tala, bato oyo bazali koloba na ngai :« Wapi Liloba na Yawe ?Tika ete ekokisama sik’oyo ! »16Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibweleoyo alandaka nzela na Yo.Oyebi malamu ete nazalaki na posaya komona mokolo ya pasi te.Maloba oyo ebimaka na monoko na ngaiebimaka nde liboso na Yo.17Kobangisa ngai te, pamba te ozali Ekimelo na ngaina tango ya pasi !18Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni,kasi batela ngai ete nayokisama soni te !Tika ete bango balenga na somo,kasi ngai nalenga na somo te.Tindela bango mokolo ya pasi,bebisa bango malamu mbala mibale.