Ezayi63lin_bib

Mokolo ya kozongisa mabe na mabe mpe ya kosikolama ya Nzambe

1Azali nani, ye oyo awuti na Edomi,na Botsira, na bilamba ya motane ?Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu,oyo azali kotambola lokola elombe,mpo ayebi ete azalaka makasi ?« Ezali nde Ngai ; nakataka makambo na bosembo,natonda na nguya mpo na kobikisa. »
2Mpo na nini bilamba na yo ezali motanelokola bilamba ya mokamoli vino ?
3« Nazalaki kaka ngai moko kati na ekamolelompo na kokamola vino,moko te kati na bato ya bikolo nyonso azalaki elongo na ngai.Nanyataki-nyataki bango na kanda na ngaimpe nakamolaki bango na kanda na ngai ya makasi ;makila na bango epumbwelaki ngai na bilambampe ebebisaki bilamba na ngai nyonso.4Pamba te, na motema na ngai,ezalaki nde mokolo ya kozongisa mabe na mabe,mpe mobu na ngai ya kosikola ekokaki.5Natalaki, kasi namonaki moto te oyo akosunga ;nakamwaki ete moto azalaki tempo na kosunga ngai !Bongo, loboko na ngai moko ebikisaki ngai,mpe kanda na ngai ya makasi esungaki ngai.6Nanyataki-nyataki bikolo na kanda na ngai,nalangwisaki bango na kanda na ngai ya makasimpe nasopaki makila na bango na mabele. »

Masanzoli mpe libondeli

7Nakotatola boboto ya Yawe,nakosanzola Ye mpo na misala na Ye,kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso ;solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitokokolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene.
8Alobaki : « Solo, bazali bato na Ngai,bazali bana oyo bakosaka Ngai te ! »Yango wana, Yawe akomaki Mobikisi na bango.
9Tango nyonso bazalaki na pasi,Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema ;boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Yeabikisaki bango ;asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye,akongolaki bango mpe azalaki komema bangomikolo nyonso ya tango ya kala.10Nzokande, wana batombokelaki Yempe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa,abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango ;mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.
11Boye, bato na Ye bakanisaki mikolo ya tango ya kala,mikolo ya tango ya Moyize :Wapi Ye oyo akatisaki bango ebale monene,elongo na mobateli bibwele ya etonga na Ye ?Wapi Ye oyo atiaki kati na bangoMolimo Mosantu na Ye ?12Ye oyo atindaki ete loboko na Ye ya nkemboezala elongo na loboko ya mobali ya Moyize,Ye oyo akabolaki mayi ya ebale monene liboso na bangompo na kopesa Kombo na Ye lokumu mpo na libela ;13Ye oyo atambolisaki bango kati na mozindo ?Lokola mpunda kati na esobe,babetaki libaku te ;14lokola bibwele oyo ezali kokita na lubwaku,Molimo na Yawe apesaki bango bopemi.Ezali ndenge wana nde okambaki bato na Yompo na kopesa lokumu na Kombo na Yo.
15Tala wuta na likolo mpe monawuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo :Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo ?Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili ?16Nzokande, Yo nde ozali Tata na biso ;atako Abrayami ayebi biso teto Isalaele andimi biso te ;kasi Yo, Yawe, ozali Tata na biso,Kombo na Yo ezali : Mosikoli na biso ya tango nyonso.
17Yawe, mpo na nini kotika biso koyengayengamosika ya nzela na Yo ?Mpo na nini kokomisa mitema na biso makasimpo ete totosa Yo te ?Zongisa motema sima mpo na bolamu ya basali na Yo,mabota ya libula na Yo !18Bato na Yo bazwaki esika na Yo ya bulekaka mpo na mwa tango moke ;kasi sik’oyo, banguna na biso bakweyisi Ndako na Yo ya bule !19Wuta kala, tozalaka bato na Yo ;kasi tokomi lokola bato oyo okambaka lisusu te,lokola bato oyo babengami na Kombo na Yo te.Oh soki okokaki kopasola likolo mpe kokita,bangomba ekoningana liboso na Yo !