Ezayi62lin_bib

1Mpo na likambo ya Siona,nakokanga monoko na Ngai te ;mpo na likambo ya Yelusalemi,nakovanda kimia te,kino bosembo na ye emonanalokola kongenga ya pole,mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.
2Bongo bikolo ekomona bosembo na yo,mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo.Bakobenga yo na kombo ya sikaoyo monoko na Yawe ekopesa.3Okozala motole ya nkembo kati na loboko ya Yawempe ekoti ya bokonzi kati na loboko ya Nzambe na yo.4Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola,bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ;kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, »mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, »pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo,mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.5Lokola elenge mobali abalaka moseka,bana na yo ya mibali mpe bakobala yo ;lokola elenge mobali asepelakana mobandami na ye ya mwasi,Nzambe na yo mpe akosepela na yo.
6Oh Yelusalemi,natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo ;bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu.Bino bato oyo bosalaka eteYawe akanisa lisusu Yelusalemi,bovanda kimia te ;7mpe botikela Ye te tango ya kopemakino tango akozongisa kimia na Yelusalemimpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili !
8Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali,loboko na Ye ya nguya,mpe alapi ndayi :« Nakopesa lisusu ble na yo telokola bilei epai ya banguna na yo ;bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sikaoyo omonelaki pasi ;9kasi bato oyo bakobuka ble bakolia yangompe bakokumisa Yawe,mpe ba-oyo bakokamola vino bakomela yangokati na lopango ya Esika na Ngai ya bule. »
10Boleka, boleka na bikuke !Bobongisela bato nzela,bopasola nzela, bopasola nzela ya monene !Bolongola mabanga,botombola bendele liboso na bato ya bikolo.
11Tala makambo oyo Yawe atatolikino na basuka ya mabele :« Boloba na Siona, mboka kitoko :‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya !Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye,mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »12Bakobenga bango Libota mosantu,basikolami na Yawe ;mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka,engumba oyo basundola te.