Ezayi61lin_bib

Mobu ya ngolu na Yawe mpo na Siona

1Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai,pamba te Yawe apakoli ngai mafutampo na kosakola sango malamu epai ya babola,kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka,kosakola bonsomi epai ya bawumbumpe kobimisa bakangami na boloko ;2mpo na kosakola mpo na Yawe mobu ya ngolu,kosakola mpo na Nzambe na biso mokolo ya kozongisa mabe na mabe,kobondisa bato oyo bazali kolela,3komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matangamitole na esika ya putulu,mafuta ya esengo na esika ya matanga,mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami.Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe,mpo na komonisa nkembo na Ye.
4Bakotonga lisusu bisikaoyo ekoma mabanga-mabanga wuta kala,bisika oyo ebukana-bukana wuta na tango ya kala ;bakokomisa sika bingumba oyo ekweya,oyo ebeba wuta bileko ya kala.5Bapaya bakoleisa bibwele na yo,bana ya bapaya bakosalela yo bilangampe bakolonela yo bilanga ya vino.6Kasi bino, bokobengama Banganga-Nzambe ya Yawe,bakopesa bino kombo bawumbu ya Nzambe na biso ;bokolia mpe bokotonda na bozwi ya bikolompe bokozwa lokumu na bomengo na bango.
7Na esika ya soni na bino,bokozwa litomba mbala mibale,mpe na esika ya kosambwa,bokosepela na libula na bino.Boye, bokozwa litomba mbala mibalekati na mokili na binompe bokosepela mpo na libela.8Pamba te Ngai Yawe, nalingaka bosembo,nayinaka moyibi mpe masumu ;nakofuta bino na bolingo na Ngaimpe nakosala boyokani ya libela elongo na bino.9Bakitani na bino bakoyebana kati na mabota,mpe bana na bino bakoyebana kati na bikolo ;moto nyonso oyo akomona binoakondima ete bozali bato oyo Yawe apamboli.
10Nakosepela makasi kati na Yawe,molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai,pamba te alatisi ngai bilamba ya lobikompe azipi ngai na elamba ya bosembo,ndenge mobandami ya mobali alatakamotole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambeto ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.11Pamba te ndenge mabele ebimisaka matitimpe elanga ebimisaka nkona na yango,Nkolo Yawe mpe akoyeisa bosemboelongo na masanzoli liboso ya bikolo nyonso.