1« Ganga na mongongo makasi, kotika te !Matisa mongongo na yo lokola kelelo,yebisa bato na Ngai botomboki na bango,mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.2Pamba te mokolo na mokolo,balukaka Ngai,basalaka lokola bato bazali na esengoya koyeba nzela na Ngai,lokola ekolo oyo esalaka makambo ya sembompe esundolaka te mibeko ya Nzambe na bango ;basengaka Ngai mikano ya sembo,mpe basalaka lokola bato bazali na esengoya kozala pene ya Nzambe ;3balobaka : ‹ Mpo na nini tokila bilei,soki ozali komona na Yo yango te ?Mpo na nini tomikitisa,soki ozali koyeba na yo yango te ? ›Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei,bozali kosala makambo oyo bolingimpe bozali konyokola basali na bino nyonso.4Kokila bilei na bino ezali kosuka na koswana mpe na bitumba,bozali kobetana makofi na kanda nyonso ;bozali kokila bilei te ndenge esengeli kozalana mokolo oyo bozali kozelaete mongongo na bino eyokana na likolo.5Boni, ezali penza kokila bilei oyo Ngai nalingaka,mokolo oyo moto amikitisaka penza ye moko ?Boni, ezali kaka kogumba motolokola nzete oyo ebotaka na mayi,kolata bilamba ya saki mpe kolala na putulu ?Ezali yango nde bino bozali kobenga kokila bilei,mokolo oyo Yawe alingaka ?6Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka :kokata minyololo ya masumu,kofungola basinga ya ekangiseli,kopesa bonsomi na mowumbumpe kobuka ekangiseli nyonso.7Boni, ezali te kokabola bilei na yona moto oyo azali na nzala ?Ezali te koyamba kati na ndako na yo,mobola oyo azali koyengayenga ?Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbumpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo ?8Bongo, pole na yo ekongenga lokola moyi ya tongo,mpe nzoto na yo ekokoma kolongono na lombangu ;bosembo na yo ekotambola liboso na yompe nkembo na Yawe ekokengela yo na sima.9Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo ;tango okosenga lisungi,akoloba : ‹ Ngai oyo. ›Soki kati na yo, olongoli ekangiseli,otiki kolakisa bato mosapimpe otiki maloba mabe ;10soki opesi bilei na yoepai na ye oyo azali na nzalampe okokisi posa ya moto oyo bazali konyokola,pole na yo ekongenga kati na molili,mpe molili na yo ekokoma lokola moyi ya ngonga midi.11Yawe akotambolisa yo tango nyonso,akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawukampe akokembisa mikuwa na yo.Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi,lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.12Mpo na yo,bakotonga lisusu bandako oyo ebukana-bukana na kala,bakomatisa lisusu miboko oyo ebukana wuta kala ;bakobenga yo : ‹ Mobongisi ya bamir oyo ebukanampe ya banzela oyo bato balekaka. ›13Soki obateli matambe na yoete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba,mpe ete osala te mosala oyo yo olingina mokolo na Ngai ya bule ;soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yompe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ;soki opesi yango lokumuna koboya kolanda nzela na yo moko,kosala misala na yo mokompe kokoba na makambo oyo ezanga tina,14wana okozwa esengo na yo kati na Yawempe nakomema yo na bisika ya likolo ya mokili,nakoleisa yo wuta na libula ya Jakobi, tata na yo, »elobi Yawe.