1Oh mwasi ekomba, yemba nzembo na esengo,yo oyo obotaka te !Yemba nzembo mpe ganga na esengo,yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te !Pamba te bana ya mwasi oyo basundola bakozala ebelekoleka bana ya mwasi ya libala, elobi Yawe.2Yeisa ndako na yo ya kapo monene,bakisa bakapo na ndako yangompo ete eya monene ;kokanga motema te !Benda na molayi basinga na yompe pika banzete na yo makasi !3Pamba te okofungwamana ngambo ya loboko na yo ya mobalimpe na ngambo ya loboko na yo ya mwasi ;bakitani na yo bakokonza bikolo mosusumpe bakosala ete bato bavanda lisusuna bingumba na bango oyo etikalaki lisusu na bato te.4Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te !Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te !Okobosana soni ya bolenge na yompe okokanisa lisusu tepasi na yo ya kokufisa mobali ;5pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo,Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ;Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ;babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.6Pamba te Yawe abengi yo lisusulokola mwasi oyo basundola,bongo azali na pasi na motema.Ndenge nini bakoki solo kosundolamwasi oyo babala na bolenge, elobi Nzambe na yo ?7Nasundolaki yo kaka mpo na tango moke ;kasi na bolingo nyonso, nakozongisa yo.8Mpo ete nazalaki na kanda makasi,nabombelaki yo elongi na Ngaikaka mpo na tango moke ;kasi nakolakisa yo bolamu mpo na bolingo oyo ezangi suka,elobi Yawe, Mosikoli na yo.9Na miso na Ngai, ezali lokola na mikolo ya Noa,tango nalapaki ndayi ete mayi ya Noaekozindisa lisusu mabele te.Boye, nalapi solo ndayi sik’oyoete nakosilikela yo lisusu tempe nakopamela yo lisusu te.10Ata bangomba milayi eningani,ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango,bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te,mpe boyokani na Ngai ya kimiaekotikala kolongwa te,elobi Yawe oyo alingaka yo.11Oh engumba ya mawa, engumba oyo mopepe makasi esili kobukampe ezangeli kobondisama,nakotonga yo lisusu na mabanga ya talompe nakosala miboko na yo na mabanga ya safiri,12nakotonga bamir ya lopango na yo na mabanga ya ribi,nakosala bikuke na yo na biloko ya ngelingeli,mpe bamir na yo nyonso, na mabanga ya talo.13Yawe akoteya bana na yo nyonso,mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.14Okolendisama kati na bosembo :minyoko ekozala mosika na yo,okobanga lisusu eloko moko te,mpe somo ekokende mosika na yo ;ekomeka kopusana lisusu pene na yo te.15Soki babundisi yo, ekowuta epai na Ngai te ;moto nyonso oyo akobundisa yo akokweya liboso na yo.16Tala, ezali Ngai nde nakelaki monyangwisi bibende na motooyo apelisaka moto makasi na makalampe asalaka ebundeli mpo ete esala mosala na yango.Ezali mpe kaka Ngai nde nakelaki mobebisimpo ete asala mosala ya kobebisa.17Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemimpo na kosala yo mabe ekolonga ;mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa,okokatela yango etumbu.Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe,mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai,elobi Yawe.