Ezayi50lin_bib

Lisumu ya Isalaele mpe botosi ya Mosali

1Tala liloba oyo Yawe alobi :« Wapi mokanda ya koboma libalaoyo Ngai nabenganelaki mama na bino ?To natekaki bino epai ya nanioyo Ngai nazalaki na niongo na ye ?Botekamaki mpo na masumu na bino ;mpe libala ya mama na bino ekufakimpo na botomboki na bino.2Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki ?Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki ?Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino ?Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino ?Na pamela na Ngai,nakawusaka ebale monene,nakomisaka bibale esobe ;mbisi na yango ekomaka kolumba solompo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi.3Nalatisaka likolo elamba ya mwindompe nazipaka yango na bilamba ya saki. »
4Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli,mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya lilobamoto oyo alembi ;alamusaka ngai tongo nyonso,alamusaka litoyi na ngaimpo ete nayoka lokola moyekoli.5Nkolo Yawe afungolaki ngai matoyi,mpe ngai natiaki moto makasi te ;namizongisaki sima te.6Napesaki mokongo na ngaiepai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai,matama na ngai, epai ya batooyo bazalaki kopikola ngai mandefu.Nabombaki elongi na ngai tena kotiolama mpe na basoyi.7Lokola Nkolo Yawe asungaka ngai,nakoyokisama soni te.Yango wana, nakomisi elongi na ngaimakasi lokola libanga,mpe nayebi ete nakoyokisama soni te.8Ye oyo alongisaka ngai azali pene,nani akokoka kotelemela bosembo na ngai ?Tika ete tosamba elongo !Nani akofunda ngai ete tosamba na ye ?Tika ete apusana pene na ngai !9Ezali Nkolo Yawe nde asungaka ngai ;nani akolonga ngai na esambiselo ?Tala, bango nyonso bakokweyalokola bilamba ya kala oyo ebeba,bongo nseka ekolia bango.
10Ezali na moto kati na binooyo atosaka Yawempe ayokaka mongongo ya Mowumbu na Ye,bongo atambola kati na molilimpe atikala komona pole te ?Tika ete atia elikya na ye kati na Kombo na Yawempe atalela Nzambe na ye.11Kasi sik’oyo, bino nyonso oyo bopelisi motompe bosimbi bakoni oyo ezali kopela moto,bokende, botambola na pole ya moto na binompe ya bakoni oyo bopelisi.Tala oyo bokozwa na maboko na ngai :Bokokufa na pasi !