1Mawa na bato oyo bazali kokendena Ejipito mpo na koluka lisungi,oyo bazali kotia mitema na bampunda,oyo bazali kotia elikya na basharmpo ete ezali ebele,mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango,kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele tempe balukaka lisungi epai na Yawe te !2Nzokande, Ye mpe azali na bwanyampe akoki koyeisa pasi ;abongolaka maloba na Ye te.Atelemelaka ndako ya bato mabempe bato oyo basungaka bango.3Bato ya Ejipito bazali kaka bato, kasi bazali Nzambe te,bampunda na bango ezali kaka mosuni, kasi ezali molimo te.Tango Yawe akosembola loboko na Ye,ye oyo asungaka akobeta libaku,mpe ye oyo bazali kosunga akokweya ;bongo, bango mibale bakobebisama.
Ezali Yawe nde Abikisaka
4Tala liloba oyo Yawe alobi na ngai :« Ndenge nkosi to mwana nkosi egangakaliboso ya mosuni na yango,ata lisanga monene ya babateli bibwele basanganimpo na kotelemela yango,ezalaka na somo ya makelele na bango tempe ezongaka sima te na mangungu na bango,ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga,akokita na ngomba Siona mpe na ngomba na yango ya mokempo na kobunda.5Ndenge ndeke efungolaka mapapu na yango,ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga,akobatela Yelusalemi,akobatela mpe akokangola,akobikisa yango na likama mpe akosunga yango. »6Oh bana ya Isalaele, bozonga epai na Ye oyo botombokeli makasi !7Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobwaka banzambe na ye ya bikeko ya palata mpe ya wolo oyo bosalaki na maboko na bino ya masumu.8« Mokili ya Asiri ekokweyisama na mopangaya moto ya mokili oyo te,ekobebisama na mopanga ya moto te.Bato ya Asiri bakokima liboso ya mopanga,mpe basoda na bango ya bilenge bakokomakosala misala ya makasi.9Libanga na bango ya makasi ekolimwa na somo ;mpe bakambi na bango bakolenga na somo na komona bendele ya etumba, »elobi Yaweoyo moto na Ye ezali kati na Sionampe fulu ya moto na Ye ezali kati na Yelusalemi.